Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Janvier lok. 2
  • Mokumba na biso ya kotonga mpe kobatela bisika na biso ya losambo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokumba na biso ya kotonga mpe kobatela bisika na biso ya losambo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • TOKOKI KOPESA MABƆKƆ NA . . .
  • Kobatela Bandako na biso ya Bokonzi
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Janvier lok. 2

BOMOI YA BAKRISTO

Mokumba na biso ya kotonga mpe kobatela bisika na biso ya losambo

Kotonga tempelo na Yisraele ezalaki mosala makasi mpe esɛngaki mbongo mingi. Kasi, Bayisraele bapesaki mabɔkɔ na mosala yango na molende mpenza. (1Nt 29:2-9; 2Nt 6:7, 8) Ntango tempelo esilaki kotongama, ndenge oyo Bayisraele bazalaki kobatela yango ezalaki komonisa soki bazali na boyokani malamu na Nzambe to te. (2Ba 22:3-6; 2Nt 28:24; 29:3) Lelo oyo, bakristo balekisaka ntango mingi mpe basalaka mpenza milende mpo na kotonga, kotya bopeto mpe kobatela Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani. Kosala elongo na Yehova ndenge wana ezali mpenza lokumu mpe ezali na kati ya mosala na biso mosantu.​—Nz 127:1; Em 7:15.

TOKOKI KOPESA MABƆKƆ NA . . .

  • Kotya bopɛto zingazinga na esika ofandi na Ndako ya Bokonzi

    Kotya bopeto nsima ya makita nyonso. Soki likoki ezali te, okoki ata kolɔkɔta eloko nyonso oyo ezali zingazinga na esika ofandi.

  • Kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi

    Kopɛtola mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi mbala na mbala. Soki bato bazali mingi, mosala ekómaka moke mpe epesaka esengo.​—lv 92-93 par. 18.

  • Kotya makabo na kɛsi ya makabo

    Kotya makabo ya mbongo. Ata likabo ya “mbongo ya bibende mibale ya motuya moke” oyo epesami na motema mobimba esepelisaka Yehova.​—Mr 12:41-44.

  • Kobongisa esika ya losambo

    Kotonga mpe kobongisa bisika ya losambo soki likoki ezali. Mpo na kopesa mabɔkɔ, esɛngi kaka te oyeba mosala ya kotonga.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto