Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/15 lok. 1
  • Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 7 sanza ya 12

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 7 sanza ya 12
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • PƆSƆ EBANDI NA 7 SANZA YA 12
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 12/15 lok. 1

Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 7 sanza ya 12

PƆSƆ EBANDI NA 7 SANZA YA 12

Loyembo 86 mpe libondeli

Boyekoli ya Biblia na lisangá:

ia mok. 4 par. 1-15, etanda na lok. 39 (Min. 30)

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: 2 Ntango 10-14 (Min. 8)

No. 1: 2 Ntango 13:13-22 (Eleka min. 3 te)

No. 2: Epafrodite (Épaphrodite)​—Motó ya likambo: Memyáká mibali oyo babongi kotyelama motema​—it-1-F lok. 778 (Min. 5)

No. 3: Liloba “Kaisala” elimboli nini?​—it-1-F nk. 413-414 (Min. 5)

Likita ya mosala:

Motó ya likambo ya sanza: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.”​—Misala 14:22.

Loyembo 85

Min. 10: “Tosengeli kokɔta na bokonzi ya Nzambe na nzela ya malɔzi mingi.” Diskur ekolobela motó ya likambo ya sanza. Tángá mpe limbolá Misala 14:21, 22 mpe 1 Petro 4:12-14. (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/2014, lok. 13, par. 3-6.) Lobelá na mokuse mwa masolo ya Likita ya mosala ya sanza oyo, mpe monisá ndenge yango eyokani na motó ya likambo ya sanza. Lendisá moto nyonso atala video ‘Tambolá na kondima, kasi na komona te’ mpo na kobongisa Likita ya mosala ya pɔsɔ oyo ekoya.

Min. 10: Ndenge nini okopesa eyano? (Kol. 4:6) Diskur ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 69, paragrafe 1-3. Bósala bilakiseli mibale oyo ekeseni. Ya liboso, moto moko alobeli mosakoli maloba mabe; na mbala moko mosakoli ayanoli na ndenge ebongi te mpe yango esali ete moto yango aboya koyoka ye. Na oyo ya mibale, nsima ya koyoka maloba mabe ya moto yango, mosakoli apemi mwa moke, ayanoli na boboto, mpe yango esali ete moto yango andima koyoka ye.

Min. 10: “Landá ndakisa ya basakoli​—Habakuku.” Mituna mpe biyano.

Loyembo 74 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto