Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 27 sanza ya 7
PƆSƆ EBANDI NA 27 SANZA YA 7
Loyembo 18 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 28 par. 1-9 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Bakonzi 15-17 (Min. 8)
No. 1: 1 Bakonzi 15:16-24 (Eleka min. 3)
No. 2: Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa basi?—igw lok. 26 par. 3–lok. 27 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Davidi (David)—Motó ya likambo: Bilenge, bómibongisa banda sikoyo mpo na kosalela Yehova na mpiko nyonso—it-1-F nk. 596-602 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli.”—Mat. 28:19, 20.
Min. 10: Ozali kokolisa makoki na yo ya kosakola? Lisolo na bayangani. Lobelá paragrafe ya liboso oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya mibale 2014, oyo emonisi ntina ya masolo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola.” Lobelá na mokuse mwa masolo yango mosusu oyo eleki. Sɛngá bayangani bálobela matomba ya sikisiki oyo bazwi na masolo yango. Lendisá basakoli bátya mpenza likebi na makanisi oyo epesamaka sanza nyonso na motó ya likambo moke “Meká kosala boye na boumeli ya sanza.”
Min. 10: Salelá “Maloba ya ebandeli mpo na Liloba ya Nzambe”—Mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia. Lisolo na bayangani. Bótalela ndenge tokoki kosalela makambo oyo elandi mpo na kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia básalelaka Biblia na ndenge oyo ebongi: (1) “Ndenge ya koluka bavɛrsɛ ya Biblia.” (2) Motuna 19: “Makambo nini ezali na mikanda ndenge na ndenge ya Biblia?” (3) Motuna 20: “Ndenge nini okoki kozwa matomba na botángi na yo ya Biblia?” Bósala elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli azali kosolola na moyekoli ya Biblia na moko ya makambo misato yango na nsuka ya boyekoli.
Min. 10: “Bisaleli na biso mpo na koteya.” Mituna mpe biyano.
Loyembo 125 mpe libondeli