Manaka mpo na pɔsɔ ya 15 sanza ya 6
PƆSƆ EBANDI NA 15 SANZA YA 6
Loyembo 77 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 26 par. 1-9 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Samwele 22-24 (Min. 8)
No. 1: 2 Samwele 22:21-32 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Kaina (Caïn)—Motó ya likambo: Ndenge oyo tosalaka soki bapesi biso toli emonisaka bomoto na biso—it-1-F nk. 378-379 (Min. 5)
No. 3: Bolingo mpe botosi epesaka esengo—igw lok. 22 par. 4-6 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: “Kanisá mikolo ya kala.”—Mib. 32:7.
Min. 12: Nani oyo Biblia elobeli osepelaka na ye mingi? Mituna-lisolo mpe diskur. Liboso, sololá na bana mike mibale to misato. Nani oyo Biblia elobeli basepelaka na ye mingi? Biblia elobi ete moto yango asalaki nini? Na makambo nini bakosepela komekola ye? Na nsima, kobá na diskur oyo ekolimbola ndenge bana bakoki kozwa matomba na nkasa ya bato oyo Biblia elobeli, oyo ezali na jw.org. (Kende esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BANA.) Lokasa yango mokomoko ezali na makambo etali moto yango mpe bililingi na ye, karte ya esika afandaki, etanda ya ntango oyo emonisi eleko oyo azalaki na bomoi ná mituna misato mpe biyano etali moto yango. Lokasa yango mokomoko ebongisami mpo na kobimisama na papye mpe kobombama. Lendisá baboti oyo bazali na bana ya mike básalela esaleli yango mpo na koteya bana na bango makambo ya “mikolo ya kala.” Soki bosalelaka Internet te, salelá buku Mekolá kondima na bango, mokapo 6 mpe 7, oyo elobeli Hana mpe Samwele, mpo na koyanola na mituna ya lisolo oyo.—Mib. 32:7.
Min. 18: “Yekolá epai ya basakoli oyo bameseni mpenza na mosala.” Lisolo na bayangani. Ntango bokotalela paragrafe 2, sɛngá bayangani báyebisa ndenge basakoli oyo bamesani na mosala basalisaki bango.
Loyembo 4 mpe libondeli