Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/15 lok. 1
  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 8 sanza ya 6

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 8 sanza ya 6
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • PƆSƆ EBANDI NA 8 SANZA YA 6
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 6/15 lok. 1

Manaka mpo na pɔsɔ ya 8 sanza ya 6

PƆSƆ EBANDI NA 8 SANZA YA 6

Loyembo 6 mpe libondeli

Boyekoli ya Biblia na lisangá:

cl mok. 25 par. 17-21, etanda na lok. 259 (Min. 30)

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: 2 Samwele 19-21 (Min. 8)

No. 1: 2 Samwele 19:24-37 (Eleka min. 3 te)

No. 2: Ndenge nini okoki kozala na esengo?​—igw lok. 22 par. 1-3 (Min. 5)

No. 3: Kaifa (Caïphe)​—Motó ya likambo: Batɛmɛli ya solo oyo bazali na ngambo ya makila bakolonga soki moke te​—it-1-F lok. 379 (Min. 5)

Likita ya mosala:

Motó ya likambo ya sanza: “Kanisá mikolo ya kala.”​—Mib. 32:7.

Loyembo 90

Min. 10: “Kanisá mikolo ya kala.” Diskur oyo ekolobela motó ya likambo ya sanza. Tángá mpe limbolá Kolimbola Mibeko 4:9; 32:7 mpe Nzembo 71:15-18. Limbolá ndenge oyo bapalanganisi ya nsango malamu na mikolo na biso bakoki kozwa matomba soki bakanisi bato mpe makambo oyo eleká na lisolo ya Batatoli ya Yehova. Yebisá basakoli ete na bantango mosusu, na losambo na bango na kati ya libota, bálobelaka masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali na motó ya likambo: “Biloko oyo tosalelá kala.” Lobelá masolo mosusu ya Likita ya mosala oyo tokotalela na boumeli ya sanza, mpe monisá ndenge eyokani na motó ya likambo ya sanza.

Min. 20: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Ndenge ya kobanda koyekola na moto liboso ya porte na lisalisi ya mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe!” Lisolo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá mitángo ya minene na lapolo ya mosala ya kosakola ya lisangá, oyo emonisi ete motángo ya bayekoli ya Biblia ekobakisama. Sɛngá mosakoli moko oyo amesani na mosala, asala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kobanda koyekola na moto Biblia liboso ya porte, na lisalisi ya maloba ya etanda. Lendisá basakoli nyonso bábanda koyekola na bato Biblia liboso ya porte.

Loyembo 29 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto