Manaka mpo na pɔsɔ ya 4 sanza ya 5
PƆSƆ EBANDI NA 4 SANZA YA 5
Loyembo 68 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 24 par. 1-10 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Samwele 1-3 (Min. 8)
No. 1: 2 Samwele 2:24-32 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Bata-sheba (Bath-Shéba)—Motó ya likambo: Nzambe andimaka basumuki oyo babongoli motema—it-1-F nk. 275-276 (Min. 5)
No. 3: Bilaka ya Biblia oyo ekokokisama mosika te—igw lok. 16 par. 4–lok. 17 par. 1 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: Tótambola lokola bato ya bwanya ‘na komisombeláká ntango oyo ebongi.’—Ef. 5:15, 16.
Min. 10: Bamposa ya lisangá. Bokoki mpe kosala elakiseli na ndenge ya kokabola bazulunalo.
Min. 5: Mikanda oyo tokokabola na sanza ya mitano mpe sanza ya motoba. Lisolo na bayangani. Bólobela makambo oyo ezali na mikanda oyo tokokabola. Bósala mpe elakiseli.
Min. 15: Kosakola na teritware oyo litatoli epesamaka mingi te ezali lolenge malamu ya kosalela ntango! Lisolo na bayangani ekosalema na nkulutu moko. Ekozala malamu ezala nkulutu oyo asakolá na teritware oyo litatoli epesamaka mingi te. Lakisá video Prédication dans des régions isolées: Australie. (Kendé na jw.org, mpe kɔtá esika bakomi QUI SOMMES-NOUS > ACTIVITÉS.) Bólobela matomba oyo libota oyo balakisi na video ezwaki ntango basakolaki na teritware oyo litatoli epesamaka mingi te. Sololá na ndeko moko na lisangá oyo asakolá na teritware oyo litatoli epesamaka mingi te. Kokende kuna ebimisaki matomba nini na libota na ye, na mosala na ye ya kosakola mpe na boyokani na ye na Nzambe? Ndenge nini amibongisaki? Soki ndeko moko asepeli kosakola na teritware oyo litatoli epesamaka mingi te, bankulutu bakosepela kosalisa ye. Monisá mpenza ete kosakola na teritware oyo litatoli epesamaka mingi te, ezali lolenge eleki malamu ya kosalela ntango na biso. Soki epai na bino bosalelaka internet te, salelá lisolo oyo ezali na Annuaire 2014 nkasa 156 mpe 157.
Loyembo ya sika “Tóteya bango bátɛlɛma ngwi” mpe libondeli
Tóbosana te: Tosɛngi bino bóbɛta liboso miziki mbala moko, mpe na nsima bandeko bakoyemba loyembo ya sika.