Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/15 lok. 2
  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 16 sanza ya 2

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 16 sanza ya 2
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • PƆSƆ EBANDI NA 16 SANZA YA 2
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 2/15 lok. 2

Manaka mpo na pɔsɔ ya 16 sanza ya 2

PƆSƆ EBANDI NA 16 SANZA YA 2

Loyembo 80 mpe libondeli

Boyekoli ya Biblia na lisangá:

cl mok. 20 par. 8-15 (Min. 30)

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: Basambisi 15-18 (Min. 8)

No. 1: Basambisi 16:13-24 (Eleka min. 3 te)

No. 2: Biblia ezali na nsango nini?​—igw lok. 8 par. 1-4 (Min. 5)

No. 3: Apolosi (Apollos)​—Motó ya likambo: Moto ya komikitisa, molobi malamu mpe moto ya molende​—it-1-F lok. 138 (Min. 5)

Likita ya mosala:

Motó ya likambo ya sanza: Tózala na “molende na misala ya malamu”!​—Tito 2:14.

Loyembo 92

Min. 15: Omibongisa mpo na kosakola nsango malamu na molende. Lisolo na bayangani. Mpo na nini kobondela Yehova ezali likambo ya liboso ya kosala ntango tozali komibongisa mpo na mosala ya kosakola? (Nz. 143:10; Mis. 4:31) Longola kobondela, tosengeli lisusu kosala nini? (Ezr. 7:10) Nsima ya kobondela mpe kobongisa motema, tokosala nini mpo tóyeba mikanda oyo tokotya na sakosi na biso ya mosala ya kosakola? Komibongisa esalisaka biso na nini? (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2008, lok. 9 par. 9.) Ndenge nini omibongisaka mpo na mosala ya kosakola? Sɛngá mosakoli moko asala elakiseli oyo ekomonisa ndenge oyo amibongisaka mpo na mosala ya kosakola na koluka koyeba batrakte, bazulunalo to mwa babuku oyo akosalela. Na nsima, abongisi sakosi na ye mpe andimisami ete telefone to tablɛti na ye ekosala malamu. Monisá mpenza ete biso nyonso tosengeli komibongisaka malamu liboso ya kokende kosakola.​—2 Tim. 3:17.

Min. 15: “Okomekola molende ya Yehova mpe ya Yesu na eleko oyo ya Ekaniseli?” Mituna mpe biyano. Pesá bayangani nyonso lokasa ya libyangi ya Ekaniseli mpe bólobela makambo oyo ezali na kati. Bósala elakiseli ya mokuse na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 4.

Loyembo 30 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto