Manaka mpo na pɔsɔ ya 12 sanza ya 1
PƆSƆ EBANDI NA 12 SANZA YA 1
Loyembo 114 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 18 par. 20-24, etanda na lok. 188 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yosua 21-24 (Min. 8)
No. 1: Yosua 24:14-21 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Mokonzi Ahaza (Ahaz)—Motó ya likambo: Nzambe andimaka te moto oyo asambelaka bikeko—it-1-F nk. 61-62 (Min. 5)
No. 3: Yehova azali Mozalisi oyo azali na nguya nyonso—igw lok. 2 par. 4–lok. 3 par. 1 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: ‘Salelá Nkolo lokola moombo na elimo ya komikitisa mingi koleka.’—Misala 20:19.
Min. 10: Salelá Nkolo lokola moombo na elimo ya komikitisa mingi koleka. Lisolo na bayangani. Tángá Misala 20:19. Na nsima sɛngá bandeko bápesa makanisi na mituna oyo: (1) “Kosalela moto lokola moombo” elimboli nini? (2) Na mwa makambo nini tokoki kosalela Nkolo lokola baombo? (3) Komikitisa elimboli nini? (4) Na ndenge nini komikitisa esalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola?
Min. 20: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya koyanola moto oyo asiliki.” Lisolo na bayangani. Nsima ya kolobela lisolo yango, bósala elakiseli ya biteni mibale, oyo ekomonisa mpenza makambo ndenge esalemaka. Eteni ya liboso ekomonisa mosakoli azali koyanola moto oyo asiliki na ndenge oyo ebongi te. Eteni ya mibale ekomonisa mosakoli azali koyanola na ndenge ya mayele mpenza. Lendisá bandeko nyonso básalela makanisi oyo epesami na “Meká kosala boye na boumeli ya sanza.”
Loyembo 76 mpe libondeli