Manaka mpo na pɔsɔ ya 15 sanza ya 12
PƆSƆ EBANDI NA 15 SANZA YA 12
Loyembo 1 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 17 par. 9-16 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yosua 6-8 (Min. 10)
No. 1: Yosua 8:18-29 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Makambo nini emonisaka ete moto azali mpenza na elimo santu?—rs lok. 179 par. 2–lok. 180 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Monguna (Adversaire)—Satana Zabolo azali monguna oyo aleki mabe—it-1-F lok. 52 par. 2-4 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: Tóbimisa “makambo ya malamu” na bolamu oyo tobombi na mitema na biso.—Mat. 12:35a.
Min. 15: “Tótambwisaka boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ebongi.” Mituna mpe biyano. Nsima ya kotalela paragrafe 3, bósala elakiseli ya biteni mibale oyo ekomonisa mosakoli azali kosolola na moyekoli ya Biblia na buku Biblia eteyaka mokapo 15, paragrafe 8. Na eteni ya liboso, mosakoli alobi mingi. Na eteni ya mibale, mosakoli azali kotuna mituna oyo ekosalisa ye ayeba makanisi ya moyekoli.
Min. 15: Esaleli oyo ekosalisa yo omibongisa mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia. Lisolo na bayangani. Bendá likebi ya bayangani na motó ya likambo “Biblia eteyaka nini?” oyo ezali na jw.org. (Kende na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE.) Bólobela ndenge tokoki kosalela makanisi yango mpo na kotambwisa malamu boyekoli ya Biblia na mikóló mpe bana. Ndenge nini mituna oyo ezali na nkasa yango ekoki kosalisa biso tósimba motema ya moyekoli? Bósala elakiseli ya mosakoli oyo azali kolobaloba ye moko na kosaleláká moko ya nkasa yango; azali kokanisa bamposa ya moyekoli mpe kobongisa mituna ya malamu. Soki basakoli ya lisangá na bino basalelaka Internet te, salá lisolo na bayangani na motó ya likambo: “Omibongisa mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia.” Salelá buku Biblia eteyaka mokapo 1 mpe mituna oyo elandi: (1) Okoloba nini soki moto alobi ete Nzambe anyokolaka bato mabe mpo na kopesa bango etumbu? Vɛrsɛ nini okosalela na eyano na yo? Mpo na nini oponi kaka vɛrsɛ wana? (2) Okoloba nini soki moto alobi ete soki Nzambe akipaka biso mpenza, alingaki te kopekisa makambo mabe esalema mpo azali na nguya nyonso? Vɛrsɛ nini okosalela na eyano na yo? Mpo na nini oponi kaka vɛrsɛ wana? Na nsuka, lendisá bayangani bákóma bateyi ya malamu oyo basalaka makasi ya kosimba mitema ya bayekoli na kosaleláká makambo ya malamu oyo tozali na yango mpo na kosalisa basusu.—Mas. 20:5.
Loyembo 99 mpe libondeli