Manaka mpo na pɔsɔ ya 17 sanza ya 11
PƆSƆ EBANDI NA 17 SANZA YA 11
Loyembo 26 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 16 par. 1-9 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 23-27 (Min. 10)
No. 1: Kolimbola Mibeko 25:17–26:1-10 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Biblia elobi nini mpo na molimo?—rs lok. 391 par. 1-5 (Min. 5)
No. 3: Monzɛlɛ (Ornements)—Makambo oyo Biblia elobi mpo na monzɛlɛ—it-2-F lok. 457 par. 1–lok. 458 par. 3 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Moninga ya solosolo azali nani? Lisolo na bayangani ekouta na “Moto azali koyema” Moninga ya solosolo azali nani? (Kende na jw.org, mpe kɔtá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE.) Bandá lisolo na kolakisa bayangani video. Na nsima, tuná bayangani mituna oyo: (1) Nani azali moninga ya solosolo? (2) Eloko nini osengeli koluka epai ya moto oyo olingi akóma moninga na yo? (3) Ndenge nini okoki kozwa moninga ya malamu? (4) Milende nini osengeli kosala mpo boninga na bino ekóma makasi? Lakisá video yango na Lifalanse.
Min. 10: Bolingo ezali elembo mpo na biso. (Yoa. 13:35) Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2014, lokasa 48, paragrafe 1 tii na lokasa 49, paragrafe 3; mpe lokasa 69, paragrafe 1 tii na lokasa 70, paragrafe 2. Sɛngá bayangani bálobela mateya oyo bazwi.
Min. 10: “Lolenge moko ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso.” Mituna mpe biyano. Soki lisangá ezali na bisika oyo bato balekaka mingi na makolo, sololá na mokɛngɛli na mosala ya kosakola ayebisa bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kosakola na esika ya bato nyonso, mpe sɛngá bayangani bálobela makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango.
Loyembo 92 mpe libondeli