Manaka mpo na pɔsɔ ya 13 sanza ya 10
PƆSƆ EBANDI NA 13 SANZA YA 10
Loyembo 8 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 14 par. 10-15 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 4-6 (Min. 10)
No. 1: Kolimbola Mibeko 4:29-43 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Makambo oyo moto asengeli kotika mpo asepelisa Nzambe—rs lok. 236 par. 3–lok. 237 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Biblia elobi nini mpo na kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi?—rs lok. 235 par. 4–lok. 236 par. 2 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: “Sakolá liloba, salá yango na molende.”—2 Tim. 4:2.
Min. 5: Kosakola na molende elimboli nini? Diskur ya kolendisa oyo ekolobela 2 Timote 4:2. Salelá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2012, nkasa 16-17, paragrafe 7-9.
Min. 10: Mpo na nini tosengeli kosakola na molende? Diskur ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2012, nkasa 15-16, paragrafe 3-6, mpe nkasa 17-18, paragrafe 14-18. Monisá ndenge oyo kosalela malako ya masolo ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo elobi: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola” ekoki kosalisa biso tósakola na molende.
Min. 15: “Salelá mabaku oyo ozwi mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi!” Mituna mpe biyano. Ntango bokotalela paragrafe 3, sɛngá bayangani bálobela makambo oyo bakutanaki na yango ntango bapesaki litatoli ya libaku malamu. Mpo na kosukisa, lobelá motó ya likambo ya sanza. Lendisá bayangani bátánga masolo mibale kati na masolo oyo motó ya likambo na yango elobi “Lisolo na moninga moko ya kartye,” oyo tokolobela na Likita ya mosala na pɔsɔ elandi.
Loyembo 97 mpe libondeli