Manaka mpo na pɔsɔ ya 29 sanza ya 9
PƆSƆ EBANDI NA 29 SANZA YA 9
Loyembo 69 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 13 par. 19-23, etanda na lok. 137 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Mitángo 33-36 (Min. 10)
No. 1: Mitángo 33:24-49 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Kotyela nguya ya Zabolo ntembe te—rs lok. 418 par. 1-3 (Min. 5)
No. 3: Mosala ya kotambwisa makambo (Administration)—Ndenge oyo Nzambe azali “kotambwisa makambo” kobanda mobu 33 T.B.”—it-1-F lok. 47 par. 3 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Bandá koyekola na bato Biblia na mokolo ya pɔsɔ ya liboso. Lisolo na bayangani. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 4, bósala elakiseli moko mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola na moto Biblia na mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya zomi. Lendisá bandeko nyonso básala bongo.
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Misala 4:13 mpe 2 Bakorinti 4:1, 7. Bólobela ndenge bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Min. 10: Sololá na mokambi-misala ya bankulutu. Kokokisa mokumba na yo esɛngaka makambo nini? Makambo nini otalelaka ntango okabolaka masolo na Likita ya mosala? Mpo na nini esengeli te kotalela mokambi-misala lokolo mokambi ya lisangani ya bankulutu to ya lisangá?
Loyembo 4 mpe libondeli