Manaka mpo na pɔsɔ ya 15 sanza ya 9
PƆSƆ EBANDI NA 15 SANZA YA 9
Loyembo 105 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 13 par. 1-10 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Mitángo 26-29 (Min. 10)
No. 1: Mitángo 27:15–28:10 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Nzambe akelaki Zabolo te—rs lok. 416 par. 3 (Min. 5)
No. 3: Adama (Adam)—Mbuma mabe ya lisumu—it-1-F lok. 44 par. 6-8 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 15: Mosala oyo tosalaki. Diskur ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá mosala oyo lisangá esalaki na mbula ya mosala oyo eleki mpe kampanye ya sipesiale na sanza ya mwambe. Bendá likebi na makambo ya malamu oyo esalemaki mpe pesá bandeko longonya mpo na yango. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango na boumeli ya sanza ya mwambe, mpe sololá na mosakoli moko oyo asakolaki mingi to asalelaki mitindo ya sika ya kopesa litatoli. Sukisá na kolobela lolenge moko to mibale oyo etali mosala ya kosakola, oyo lisangá esengeli kobongisa na mbula ya sika ya mosala, mpe pesá mwa batoli oyo ebongi mpo na kosalisa bandeko básala lisusu malamu koleka.
Min. 15: “Landá ndakisa ya basakoli —Nahumu.” Mituna mpe biyano.
Loyembo 46 mpe libondeli