Manaka mpo na pɔsɔ ya 8 sanza ya 9
PƆSƆ EBANDI NA 8 SANZA YA 9
Loyembo 133 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 12 par. 16-21, etanda na lok. 127 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Mitángo 22-25 (Min. 10)
No. 1: Mitángo 22:36–23:1-10 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Satana azali te mabe oyo ezalaka na kati ya motema ya moto—rs lok. 415 par. 4–lok. 416 par. 2 (Min. 5)
No. 3: Adama (Adam)—Na ndenge nini Adama asalemaki na elilingi ya Nzambe?—it-1-F nk. 43-44 par. 5 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 15: Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola. (2 Ko. 6:3) Lisolo na bayangani na mituna oyo: (1) Mpo na nini ebongi komonisaka bizali malamu ntango tozali kosakola? (2) Ndenge nini tokoki kosala yango ntango (a) etuluku na biso ekómi na teritware? (b) tozali kosakola ndako na ndako na teritware oyo bandako ya bato ezali, to tokei kosakola ndako na ndako na bateritware oyo ezali mosika na engumba monene? (c) totɛlɛmi liboso ya porte moko? (d) moninga azali kopesa litatoli? (e) moto oyo tozali kosolola na ye azali koloba? (f) azali kosala mosala, mbula to moi ezali makasi? (g) azangi limemya?
Min. 15: “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobongisa nzela mpo na kozongela moto.” Lisolo na bayangani. Bósala mpe elakiseli ya mosakoli oyo azali kolobaloba ye moko, oyo ekomonisa ndenge azali komibongisa mpo na kosakola mpe kobongisa motuna oyo akotuna moto mpo azongela ye, soki moto yango andimi kozwa bazulunalo.
Loyembo 68 mpe libondeli