Manaka mpo na pɔsɔ ya 31 sanza ya 3
PƆSƆ EBANDI NA 31 SANZA YA 3
Loyembo 105 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 5 par. 1-8 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kobima 1-6 (Min. 10)
No. 1: Kobima 2:1-14 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Kozonga ya Kristo ekomonana te na miso ya bato—rs lok. 245 par. 2-4 (Min. 5)
No. 3: Abirame—Kotɛmɛla bato oyo Nzambe aponi ezali nde kotɛmɛla Yehova—it-1-F lok. 24, Abiram No. 1 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: “Lolenge malamu ya kosalela bazulunalo ya kala.” Lisolo na bayangani. Yebisá bandeko bazulunalo ya kala oyo bozali na yango na lisangá, oyo basakoli bakoki kobima na yango na mosala ya kosakola. Sɛngá bayangani báyebisa makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango ntango bakabolaki bazulunalo ya kala. Liboso ya kosukisa, sɛngá mokɛngɛli na mosala ya kosakola ayebisa lisangá ndenge oyo kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi ya Ekaniseli ezali kotambola.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko batánga Matai 28:20 mpe 2 Timote 4:17. Bólobela ndenge oyo bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Loyembo 135 mpe libondeli