Manaka mpo na pɔsɔ ya 3 sanza ya 2
PƆSƆ EBANDI NA 3 SANZA YA 2
Loyembo 22 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 2 par. 12-20 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ebandeli 21-24 (Min. 10)
No. 1: Ebandeli 23:1-20 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini Yesu abimelaki bato na nzoto ya mosuni?—rs lok. 296 par. 4–lok. 297 par. 2 (Min. 5)
No. 3: Abele—Zalá na kondima oyo esepelisaka Nzambe—it-1-F nk. 15-16, par. 2, Abel No. 1 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Bazulunalo oyo tokokabola na sanza ya mibale. Lisolo na bayangani. Bóbanda na elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola bazulunalo yango na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo. Na nsima, bótalela maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” banda ebandeli tii nsuka, bótánga fraze mokomoko to mibalemibale mpe na nsima, sɛngá na bayangani balobela ntina na yango. Kundwelá basakoli ete basengeli koloba na maloba na bango moko mpe kotala soki bakoki kobongola “Ndenge ya kobanda lisolo” to kosalela lolenge mosusu. Sukisá na kolendisa bandeko nyonso bámesana mpenza na bazulunalo yango mpe básangana na molende nyonso na kokabola yango.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Bokoyeba bango na mbuma na bango. (Mat. 7:16) Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2013, lokasa 47, paragrafe 1-2; mpe lokasa 52, paragrafe 1-6. Sɛngá na bayangani bálobela mateya oyo bazwi.
Loyembo 25 mpe libondeli