Manaka mpo na pɔsɔ ya 28 sanza ya 10
PƆSƆ EBANDI NA 28 SANZA YA 10
Loyembo 31 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jl lok. 3 mpe Liteya 1-2 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Timote 1-6–2 Timote 1-4 (Min. 10)
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (Min. 20)
Likita ya mosala:
Min. 5: “Okosala nini na mikolo oyo bato bakendaka misala te mpe bana kelasi bakendaka kelasi te?” Diskur.
Min. 10: Monisá ete nsango malamu ezali mpenza na ntina. Lisolo na bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 159. Bósala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola buku Biblia eteyaka na kolobela likambo moko oyo etungisaka bato ya teritware na bino.
Min. 15: Ntina ya kotosa ngonga. Lisolo na bayangani. (1) Ndenge nini Yehova apesi ndakisa malamu na likambo etali kotosa ngonga? (Hab. 2:3) (2) Na ndenge nini koya na ngonga malamu na makita mpe na mosala ya kosakola emonisaka ete tozali kotosa Yehova mpe komemya bandeko? (3) Soki toyei na retare na likita mpo na mosala ya kosakola, yango ekosala nini epai ya motabwisi mpe bandeko ya etuluku? (4) Soki tolakaki moto oyo asepelaki to moyekoli ya Biblia ete tokozongela ye na ngonga moko boye, mpo na nini ezali na ntina tótosa ngonga yango? (Mat. 5:37) (5) Makanisi nini oyo ebongi, ekosalisa biso totosaka ngonga ntango toyokani na moto na mosala ya kosakola mpe mpo na makita ya lisangá?
Loyembo 69 mpe libondeli