Manaka mpo na pɔsɔ ya 23 sanza ya 9
PƆSƆ EBANDI NA 23 SANZA YA 9
Loyembo 109 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 14 par. 14-19 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Bakorinti 8-13 (Min. 10)
No. 1: 2 Bakorinti 10:1-18 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Soki moto alobi: ‘Ngai nandimaka ete bato babotamaka mbala na mbala’—rs lok. 215 par. 2-4 (Min. 5)
No. 3: Maloba oyo ezali na 1 Bakorinti 10:13 elimboli nini? (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 5: “Nakozwa mokanda na yo soki ozwi oyo ya ngai.” Lisolo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo balongaki mokakatano wana.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki na mbula oyo eleki. Diskur ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Lobelá mosala oyo lisangá esalaki na mbula ya mosala oyo eleki. Bendá likebi na makambo ya malamu oyo esalemaki mpe pesá bandeko longonya mpo na yango. Monisá likambo moko to makambo mibale oyo etali mosala ya kosakola, oyo lisangá esengeli kobongisa na mbula ya sika ya mosala mpe pesá mwa batoli oyo ebongi.
Min. 15: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Misala 16:19-40. Bólobela ndenge lisolo yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Loyembo 44 mpe libondeli