Manaka mpo na pɔsɔ ya 16 sanza ya 9
PƆSƆ EBANDI NA 16 SANZA YA 9
Loyembo 21 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 14 par. 8-13 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Bakorinti 1-7 (Min. 10)
No. 1: 2 Bakorinti 1:15–2:11 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Bokeseni nini ezali kati na liteya oyo elobi ete moto abotamaka mbala na mbala ná elikya oyo Biblia epesi?—rs lok. 214 par. 4–lok. 215 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Moto asengeli kosala nini mpo akima epai ya nkombo ya Yehova?—Sef. 3:12 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Bilenge—Bokosala nini na bomoi na bino?—Eteni 2. Diskur ekouta na trakte Bomoi na bino, kobanda na paragrafe 10 tii na nsuka. Sololá na mokuse na ndeko moko oyo abandaki mosala ya ntango nyonso ntango azalaki naino elenge. Nini etindaki ye azwa ekateli yango? Matomba nini azwi?
Min. 10: Ntango ozali kosakola yo moko. Lisolo na bayangani. (1) Ntango ozali kosakola yo moko, nini ekosalisa yo ozala na esengo? (2) Makambo nini osengeli kokeba na yango ntango ozali kozongela yo moko bato oyo osololaki na bango? (3) Soki na mikolo oyo osakolaka likita mpo na mosala ya kosakola esalemaka te, okoki kosala nini mpo olendisa bandeko mosusu ya lisangá bábima elongo na yo? (4) Kosakola yo moko na bangonga mpe na bisika oyo ezali na likama te, ekoki kobimisa matomba nini?
Min. 10: “Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?” Mituna mpe biyano. Lobelá lisusu na mokuse ndenge oyo mwa buku yango ebongisami mpe makambo oyo ezali na kati.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya misato 2013, lokasa 3.
Loyembo 107 mpe libondeli