Lolenge ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso
1. Ndakisa nini bakristo ya liboso batikaki?
1 Bakristo ya liboso basukaki te na kosakola ndako na ndako, kasi basakolaki mpe na bisika ya bato nyonso. (Mis. 20:20) Na ndakisa, bazalaki kokende na tempelo epai bayebaki ete bakoki kokuta bato mingi. (Mis. 5:42) Na Atene, ntoma Paulo azalaki kosakola mikolo nyonso epai ya bato oyo azalaki kokutana na bango na zando. (Mis. 17:17) Tii lelo, kosakola ndako na ndako ezali lolenge na biso ya libosoliboso ya kopalanganisa nsango malamu. Kasi, tokendeke mpe na baparkingi, na bisika ya mombongo, na baparke, na balabala oyo bato balekaka mingi, mpe na bisika mosusu mpo na kosakwela bato bisika nyonso oyo tokoki kokutana na bango. Atako mosakoli nyonso alendisami na kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso soki likoki ezali, mingi bakosepela mpe kopesa mabɔkɔ na lolenge mibale ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso.
2. Likambo nini ya sika ebandaki na sanza ya zomi na moko 2011?
2 Lolenge moko ya sika ya kopesa litatoli na engumba monene: Ndenge eyebisami na Annuaire 2013 na lokasa 16 mpe 17, na engumba New York, etuluku moko ya Batatoli bamekaki lolenge moko ya sika ya kopesa litatoli na sanza ya zomi na moko 2011. Mpo na kobenda likebi ya bato, batyaki bapankarte mpe mikanda ya minɔkɔ ndenge na ndenge na bamesa mpe na bashario na bisika oyo bato mingi balekaka na makolo. Mokolo na mokolo, bato ebele mpenza bazalaki koya wana, ezala baoyo bafandaka na baapartema epai bapesaka Batatoli nzela ya kokɔta te, to bato oyo ezalaka mpasi kokuta bango na ndako. Bato mingi mpenza basepelaki na mikanda na biso. Kaka na moko ya basanza oyo euti koleka bakabolaki bazulunalo 3 797 mpe babuku 7 986. Bato mingi oyo bazalaki koleka wana basɛngaki ete báyekola na bango Biblia. Lokola mokano ezalaki ya kobanda koyekola na bato Biblia, soki moto moko apesi adrɛsi na ye, Batatoli yango bazalaki kotinda adrɛsi yango mbala moko na lisangá oyo ebongi mpo bákende kotala ye.
3. Ndenge nini lolenge wana ya sika ya kosakola ezali kopalangana?
3 Lokola lolenge yango ya kosakola ebimisi matomba, ekómi kosalelama na mokili mobimba na bingumba ya minene epai bato bazali mingi mpenza. Biro ya filiale ya ekólo mokomoko nde ekopona bingumba oyo bakoki kosalela lolenge wana ya kosakola. Mbala mingi, bingumba yango ezali na bisika oyo bato ebele balekaka mpo na kokende kozwa mituka, ezali na babiro to baapartema mingi; nyonso wana esalaka ete bato mingi bátambola na makolo. Na nsima, biro ya filiale ekokomela masangá oyo ekopesa mabɔkɔ mpe ekotindela bango malako mosusu. Mbala mingi, babongisi-nzela monene mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza nde bazali koponama, atako na bisika mosusu bakoki mpe kopona babongisi-nzela basungi.
4. Ndenge nini lolenge ya sika ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso na bingumba ya minene ezali kosalema?
4 Ndenge bazali kosala mpo na kopesa litatoli: Mbala mingi, baoyo bazali kopesa litatoli na bingumba ya minene bazelaka moto aya na mesa to na shario oyo batye mikanda. Ntango moto apusani, bakosɛnga ye azwa mokanda oyo asepeli na yango. Babongisi-nzela bakoyanola na esengo nyonso na motuna nyonso oyo moto yango atuni. Soki moto azwi mokanda, babongisi-nzela bakolobela likambo ya makabo te. Kasi soki atuni ndenge nini tozwaka mbongo mpo mosala na biso esalema, bakoki kolimbwela ye ete akoki kotinda likabo na adrɛsi oyo etyami na mokanda. Soki esengeli, bakotuna ye boye: “Okosepela moto moko aya kotala yo na ndako?” to “Oyebi ete okoki koyekola Biblia ofele na lisalisi ya mokanda oyo ozwi?”
5. Motatoli moko ná mwasi na ye bazwaki matomba nini ndenge bapesaki mabɔkɔ na lolenge wana ya kosakola?
5 Kopesa mabɔkɔ na lolenge wana ya kosakola epesi matomba mingi. Motatoli moko ná mwasi na ye bakomaki boye: “Kotɛlɛma na mesa mpe komona ndenge ebele ya bato bazali koleka mokolo na mokolo esalisi biso tómona bonene ya mosala oyo ezali naino ya kopesa bato litatoli na mokili mobimba. Komona ebele mpenza ya bato mpe kokanisa ndenge Yehova azali mpenza kotyela mokomoko na bango likebi elendisi biso tókoba kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na biso. Ezali lokola nde tozali komona ndenge Yehova azali kotala mitema ya bato nyonso oyo bazali koya na mesa, mpo na koluka baoyo babongi. Tozali komona ete tozali kosala mpenza elongo na baanzelu.”
6. (a) Lolenge nini mosusu ya sika ya kopesa litatoli ezali kobongisama na masangá, mpe ndenge nini yango ekeseni na kopesa litatoli na bingumba ya minene? (b) Ndenge nini bandeko ya masangá ndenge na ndenge bakoki kosala na bomoko ntango bazali kosakola na bisika ya bato nyonso?
6 Kosakola na bisika ya bato nyonso na teritware ya lisangá: Masangani mingi ya bankulutu bazali mpe kozwa bibongiseli mpo na kobanda lolenge mosusu ya sika ya kopesa litatoli na bateritware ya masangá na bango. Mpo na yango, basakoli bazali kotya mesa to shario na esika oyo bato bazalaka mingi kaka na teritware ya lisangá na bango. Yango ekeseni na kopesa litatoli na bingumba ya minene, oyo esɛngaka ete basakoli ya masangá mingi bákutanaka na bisika oyo eyebani na bingumba oyo biro ya filiale eponi.—Talá etanda “Esengeli kosala na bomoko.”
7. Na bisika oyo ekoki kosalema, ndenge nini bankulutu bakobongisa mosala ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso na teritware na bango?
7 Bankulutu basengeli kotalela soki na teritware ya lisangá na bango ezali na bisika oyo bato mingi batambolaka na makolo mpe koluka koyeba soki ebongi ete bápesa litatoli na bisika yango. Na ndakisa, bakoki kotanda mesa to kotya shario na bisika oyo bato bazwaka mituka, bisika oyo bato bazalaka ebele, baparke, babalabala oyo bato balekaka mingi, bamagazini ya minene, biteyelo ya minene, mabándá ya mpɛpɔ mpe bisika mosusu oyo milulu esalemaka mbula na mbula. Ekozala malamu kotyaka mesa kaka esika moko, na mikolo ya sikisiki na kati ya pɔsɔ, mpe na bangonga ya sikisiki. Emonani ete kotya mesa na bisika ya bamagazini ya minene ebimisaka matomba mingi koleka kotya yango na depo moko ya monene epai bato batyaka likebi kaka na makambo oyo bayeli. Na bisika mosusu, na ndakisa banzela oyo bato balekaka mingi, ekozala malamu kosalela shario ya moke. Bankulutu bakoki kozwa na site na biso ya Internet bapankarte ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe ya buku Biblia eteyaka. Bapankarte yango ebongisami mpenzampenza mpo na kosalela na litatoli na bisika ya bato nyonso. Baoyo bazali kosakola ndenge wana bakosala mosala yango kaka ndenge esalemaka na bingumba ya minene mpe basengeli kolanda malamumalamu malako ya mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Soki moto moko oyo asepeli apesi bango adrɛsi na ye kasi afandaka na teritware mosusu, basengeli mbala moko kotondisa formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43) mpe kopesa yango na sɛkrɛtɛrɛ.
8. Soki ebongiseli moko ezwami na lisangá te mpo na kosakola na bisika ya bato nyonso, mabaku nini ozali na yango ya kopesa litatoli na bisika yango?
8 Kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso ntango ozali kosakola: Ekoki kozala ete na teritware ya masangá mosusu ezali na esika moko te oyo bato mingi batambolaka na makolo; yango wana ntina ya kotanda mesa to shario mpo na kotya mikanda ezali te. Kasi ata na masangá yango, basakoli balendisami na kotalela soki bakoki mpe kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso ntango bazali kosakola. Na teritware na yo, ezali na bisika oyo babutiki ezali mingi, balabala oyo ezali na bamagazini ya minene to depo oyo bato mingi bayaka? Ezali na parkɛ to esika oyo bato bakutanaka kuna? Ezali nde na bisika mosusu oyo bato bakutanaka mpo na milulu na teritware na yo? Soki bongo, okoki koyoka esengo ya kopesa litatoli na bisika ya bato nyonso.
9. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosakwela bato na bisika nyonso oyo tokoki kokutana na bango?
9 Mokano ya Yehova ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Na yango, tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo na komemela bato mingi nsango ya Bokonzi liboso ete nsuka eya. (Mat. 24:14) Na bisika mingi, ezalaka mpasi kokuta bato na bisika oyo bafandaka. Atako bongo, tokoki kozala na likoki ya kosolola na bango na bisika ya bato nyonso. Kosakola na bisika ya bato nyonso ekoki kozala lolenge kaka moko oyo ekoki kopesa bato mosusu libaku ya koyoka nsango malamu. Yango wana, tiká ete tósakolaka na bisika nyonso oyo tokoki kokutana na bato mpo tókokisa malamumalamu mosala na biso.—2 Tim. 4:5.