Manaka mpo na pɔsɔ ya 15 sanza ya 7
PƆSƆ EBANDI NA 15 SANZA YA 7
Loyembo 48 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 12 par. 1-7 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Misala 18-21 (Min. 10)
No. 1: Misala 20:17-38 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Kristo akomonana boye na mapata mpe na nsima akozwa bakristo ya sembo na likoló wana mokili ezali kotala?—rs lok. 227 par. 2–lok. 228 par. 1 (Min. 5)
No. 3: Ndenge nini tokoki komonisa ete tokanisaka na elimo?—Rom. 8:6 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Simbá motema ya moto oyo oyekolaka na ye Biblia. (Luka 24:32) Lisolo na bayangani na mituna oyo elandi: (1) Ntango ozali koyekola na moto Biblia, mpo na nini ezali na ntina olobelaka mingi (a) bolingo mpe bwanya ya Yehova? (b) ntina ya kosalela mitinda ya Biblia? (c) ntina ya koluka ntango nyonso litambwisi ya Yehova liboso ya kozwa ekateli? (2) Ndenge nini kotuna moyekoli ya Biblia mituna oyo elandi ekosalisa yo oyeba soki ozali kosimba motema na ye? (a) Omoni ete toli yango ebongi mpenza? (b) Okanisi ete yango eyokani na bolingo ya Nzambe? (c) Omoni ete okozwa litomba nini soki otosi toli yango?
Min. 20: “Bandeko mibali oyo bozali bilenge, bozali koluka kozwa mikumba?” Mituna mpe biyano. Sololá na mokuse na nkulutu moko to mosaleli na misala moko oyo azwaki mikumba ntango azalaki naino elenge. Misala nini mpe formasyo nini bapesaki ye liboso akóma mosaleli na misala? Ndenge nini bandeko mosusu na lisangá basalisaki ye mpo akende liboso na elimo? Matomba nini azwaki na ndenge alukaki kozwa mikumba?
Loyembo 85 mpe libondeli