Manaka mpo na pɔsɔ ya 10 sanza ya 6
PƆSƆ EBANDI NA 10 SANZA YA 6
Loyembo 114 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 10 par. 14-19 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Misala 1-4 (Min. 10)
No. 1: Misala 1:15–2:4 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Lisiko ekomemela bato mapamboli nini na mikolo ezali koya?—rs lok. 306 par. 4–lok. 307 par. 3 (Min. 5)
No. 3: Mpo na nini makanisi ya bato mingi ezali lokola mopɛpɛ oyo ezali na pwazɔ?—Ef. 2:1, 2 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Ntina ya kotala mpenza bato oyo bazali koyoka yo. Diskur ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 124, paragrafe 1 tii na lokasa 125, paragrafe 4. Bósala elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli azali kopesa moto litatoli kasi azali kotala ye mpenza te. Na nsima, bózongela elakiseli yango, mpe na mbala oyo mosakoli azali kotala malamu moto oyo azali kosolola na ye.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki na mbula eleki. Lisolo na bayangani ekosalema na sɛkrɛtɛrɛ. Lobelá mosala oyo esalemaki na eleko ya Ekaniseli, mpe pesá bandeko ya lisangá longonya mpo na mosala oyo basalaki. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango ntango bazalaki kokabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli to ntango basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
Min. 10: “Okolinga kobongola makambo mosusu?” Mituna mpe biyano.
Loyembo 74 mpe libondeli