Manaka mpo na pɔsɔ ya 11 sanza ya 2
PƆSƆ EBANDI NA 11 SANZA YA 2
Loyembo 106 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 5 par. 7-12 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Matai 26-28 (Min. 10)
No. 1: Matai 27:24-44 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Na ndenge nini motema molai ya Nzambe ezali komema na lobiko?—2 Pe. 3:9, 15 (Min. 5)
No. 3: Soki moto alobi: ‘Bolingaka mingi kolobela bisakweli’—rs lok. 190 par. 4-5 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Matai 6:19-21 mpe Luka 16:13. Bólobela ndenge oyo masolo yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Min. 20: “Okozala mobongisi-nzela mosungi?” Mituna mpe biyano ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Nsima ya kotalela paragrafe 2, sololá na mokuse na basakoli mibale oyo bakani kozala babongisi-nzela basungi na sanza ya misato; moko azala moto oyo akendeke mosala mpe mosusu azala moto oyo atungisamaka na maladi. Makambo nini bakani kobongisa mpo básala mosala yango? Nsima ya kotalela paragrafe 3, sɛngá mobali moko ná mwasi na ye to libota moko oyo ezali na bana básala elakiseli oyo ekomonisa ete bazali kozwa bibongiseli ya sikisiki na Losambo na bango ya libota, mpo básakola mingi.
Loyembo 122 mpe libondeli