Manaka mpo na pɔsɔ ya 17 Desɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 17 DESƐMBƐ
Loyembo 97 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 2 par. 20-27, etanda na lok. 29 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Zekaria 1-8 (Min. 10)
No. 1: Zekaria 8:1-13 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ndenge nini tomonisaka ete Yehova azali Nkolo Mokonzi na biso oyo aleki nyonso?—Nz. 73:28 (Min. 5)
No. 3: Mpo na nini eleki malamu koyekola mateya ya Yesu Kristo na esika ya koyekola bafilozofi ya bato?—rs lok. 201 par. 2–lok. 202 par. 2 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: “Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na . . .” Lisolo na bayangani.
Min. 10: Nsango oyo tosengeli kosakola: “Bangá Nzambe ya solo mpe tosá bakomandema na ye.” Diskur ya kolendisa ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 272 tii na motó ya likambo moke na lokasa 275.
Min. 15: Omekaki kosalela yango? Lisolo na bayangani. Salá diskur oyo ekozongela na mokuse makanisi oyo ebimaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya basanza oyo euti koleka: “Tósakola kozanga kobanga na bisika ya mombongo” (km 3/12), “Salisá bato báyoka Nzambe” (km 7/12), mpe “Okoki kosakola na mpokwa?” (km 10/12). Sɛngá na bayangani bálobela matomba oyo bazwaki na ndenge basalelaki makanisi ya masolo yango.
Loyembo 117 mpe libondeli