Manaka mpo na pɔsɔ ya 22 Ɔkɔtɔbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 22 ƆKƆTƆBƐ
Loyembo 71 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 18 par. 19-24 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Hosea 1-7 (Min. 10)
No. 1: Hosea 6:1–7:7 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ndenge nini moto akoki koyeba eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele?—rs lok. 164 par. 5–lok. 165 par. 6 (Min. 5)
No. 3: Tómekola Yesu, oyo atyolaki nsɔni—Ebr. 12:2 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 30: “Mituna oyo bilenge batunaka—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya solosolo?” Mituna mpe biyano. Na ebandeli ya lisolo, lobelá na mokuse makanisi ya paragrafe ya liboso mpe na nsuka lobelá na mokuse makanisi ya paragrafe ya nsuka. Soki video yango ezali te na monɔkɔ na bino, bilenge bakoki kotala yango na monɔkɔ mosusu mpe koyanola na mituna 9 tii 14. Soki te, bósalela buku Mituna oyo bilenge batunaka volimi 1 mpe 2 mpo na koyanola na mituna.
Loyembo 89 mpe libondeli