Manaka mpo na pɔsɔ ya 27 Augusto
PƆSƆ EBANDI NA 27 AUGUSTO
Loyembo 100 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 16 par. 8-12, etanda na lok. 132 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Ezekiele 35-38 (Min. 10)
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (Min. 20)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. “Mbongwana na makita ya kati ya pɔsɔ.” Diskur. Nsima ya diskur, na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 4, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kosalela bazulunalo mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Sɛtɛmbɛ.
Min. 15: Pesá litatoli na ndenge oyo bato bakokanga ntina na yango. Lisolo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 226-229. Bósala elakiseli moko to bilakiseli mibale mpo na komonisa makanisi oyo ezali na lisolo yango.
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Bótánga Luka 10:1-4, 17. Bólobela ndenge lisolo yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Loyembo 57 mpe libondeli