Manaka mpo na pɔsɔ ya 30 Aprili
PƆSƆ EBANDI NA 30 APRILI
Loyembo 125 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 11 par. 1-4, bitanda na nk. 84, 86 mpe 87 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yirimia 32-34 (Min. 10)
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (Min. 20)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 8, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola na moto na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Mai.
Min. 10: Ndenge ya koyanola na moto oyo abimisi ntembe mpo na mangomba. Lisolo na bayangani ekouta na buku Ndenge ya kosolola, lokasa 285, paragrafe 4 tii lokasa 288, paragrafe 2. Sɛngá na basakoli básala elakiseli moko to bilakiseli mibale ya mokuse mpo na kolobela likanisi moko to mibale oyo bapesi na buku.
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bandeko bátánga Misala 4:1-13, 18-20. Bólobela ndenge masolo yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Min. 5: “Mbongo ya bibende mibale ya motuya moke.” Diskur.
Loyembo 126 mpe libondeli