Manaka mpo na pɔsɔ ya 9 Aprili
PƆSƆ EBANDI NA 9 APRILI
Loyembo 123 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 9 par. 19-24, etanda na lok. 73 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yirimia 22-24 (Min. 10)
No. 1: Yirimia 23:15-23 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini tokolɛmba bomoi te na mokili ya sika? (Min. 5)
No. 3: Kosalela toli ya Biblia ekoki kosalisa babalani bázala na libala ya esengo—rs lok. 254 par. 5-8 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Tósalela malamu Annuaire 2012. Salelá “Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi” mpo na maloba ya ebandeli. Na nsima, sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo ezali na eteni oyo elobi: “Makambo ya ntina oyo esalemaki na mbula eleki,” mpe bálobela makambo ya kolendisa oyo basepeli na yango na lapolo ya mokili mobimba. Mpo na kosukisa, lendisá bandeko nyonso bátánga Annuaire yango mobimba.
Min. 15: “Makambo misato mpo obongisa lisusu lolenge na yo ya koteya.” Mituna mpe biyano. Ntango bokokóma na paragrafe 2, bósala elakiseli oyo ekomonisa mosakoli moko azali kotalela elongo na moto paragrafe ya liboso na lokasa 3 ya buku Biblia eteyaka. Mosakoli atángi maloba ya Yobo 10:15 oyo ezali wana, mpe na nsima azwi miniti moko to mibale mpo na kolimbola soki Yobo azalaki nani. Nsima na yango, sɛngá bayangani báyebisa mpo na nini wana ezali lolenge malamu te ya koteya, atako makambo mosakoli alobaki mpo na Yobo ezali solo.
Loyembo 10 mpe libondeli