Manaka mpo na pɔsɔ ya 23 Yanuali
PƆSƆ EBANDI NA 23 YANUALI
Loyembo 89 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 6 par. 1-8, etanda na lok. 44 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yisaya 38-42 (Min. 10)
No. 1: Yisaya 39:1–40:5 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Ndenge nini elikya ya bomoi ya seko ekokokisama?—rs lok. 127 par. 4-6 (Min. 5)
No. 3: Mateya ya Nzambe eleki mosika bakelasi ya mokili—Flp. 3:8 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. Yebisá mikanda oyo tokokabola na sanza ya Febwali, mpe bósala elakiseli moko to mibale mpo na komonisa ndenge ya kolakisa mikanda yango.
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Bótánga Marko 10:17-30. Bólobela ndenge oyo masolo yango ekoki kosalisa biso na mosala na biso ya kosakola.
Min. 15: “Tósakwela ‘bato ya ndenge nyonso.’” Mituna mpe biyano. Lobelá ntina ya mwa buku mokomoko oyo ezali na siplema. Na nsima poná mwa babuku mibale oyo ekoki kosalisa bato ya teritware na bino. Bólobela makambo oyo ezali na mwa babuku yango, mpe bósala bilakiseli mpo na komonisa ndenge ya kokabola mwa buku yango mokomoko.
Loyembo 112 mpe libondeli