Manaka mpo na pɔsɔ ya 14 Novɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 14 NOVƐMBƐ
Loyembo 49 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 3 par. 1-3, bitanda na nk. 23-27 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Mosakoli 1-6 (Min. 10)
No. 1: Mosakoli 6:1-12 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Kobakisama ya makambo oyo ezali kobuka mibeko emonisi nini?—rs lok. 362 par. 1-2 (Min. 5)
No. 3: Mpo na nini bakristo ya solo balandaka toli oyo ezali na Baroma 12:19? (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’? Diskur ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2011, nkasa 22-23. Soki bozwi naino Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango te, bósalela oyo ya 15 Novɛmbɛ 2010, na lisolo oyo elobi “Tiká tópesa Yehova likabo.”
Min. 15: “Tózongelaka bato oyo basepelaki.” Mituna mpe biyano. Nsima ya kotalela paragrafe 3, bósala elakiseli ya ndeko moko azali kolobaloba ye moko, azali komibongisa mpo na kozongela moto. Azali kotala lisusu makambo oyo akomaki mpo na moto yango mpe azali kotalela ndenge oyo akoyanola na motuna oyo moto yango atunaki, mpe ndenge oyo akoki kobanda koyekola na ye na buku Biblia eteyaka. Zongelá na mokuse makanisi oyo ezali na buku Tobongisami, lokasa 85, paragrafe 3, oyo elobeli ntango nini okoki kotánga bozongeli ya sika.
Loyembo 98 mpe libondeli