Manaka mpo na pɔsɔ ya 17 Ɔkɔtɔbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 17 ƆKƆTƆBƐ
Loyembo 85 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 1 par. 16-21 (Min. 25)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Masese 12-16 (Min. 10)
No. 1: Masese 15:1-17 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini mabondeli oyo Yehova andimaka ezali lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko?—Nz. 141:2; Em. 5:8 (Min. 5)
No. 3: Elembo nini emonisi ete tozali kobika na mikolo ya nsuka?—rs lok. 359 par. 2 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Liteya nini tozwi? Lisolo na bayangani. Bótánga Matai 5:11, 12, 14-16, 23, 24. Bólobela ndenge oyo bavɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola.
Min. 10: Tiká moto amona yango na miso na ye moko. Lisolo na bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 145. Bósala elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli moko azongeli moto moko oyo asepelaki na nsango malamu, kasi libongoli ya Biblia oyo asalelaka elongolá nkombo ya Nzambe.
Min. 10: “Kobanga te kopesa litatoli.” Mituna mpe biyano. Sɛngá mikóló mpe bana mike báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango ntango bapesaki litatoli na kelasi.
Loyembo 80 mpe libondeli