Manaka mpo na pɔsɔ ya 26 Sɛtɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 26 SƐTƐMBƐ
Loyembo 101 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 18 par. 19-23, etanda na lok. 191 (Min. 25)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Nzembo 142-150 (Min. 10)
No. 1: Nzembo 144:1–145:4 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na ekeke ya liboso?—rs lok. 122 par. 2-4 (Min. 5)
No. 3: Mpo na nini tosengeli koboya “kopona bilongi”?—Yak. 2:1-4 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. Limbolá makanisi oyo ezali na lisolo “Ndenge mosusu ya kosalela mwa buku Message de la Bible.” Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa 4, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kobanda koyekola na moto Biblia na mokolo ya pɔsɔ 1 Ɔkɔtɔbɛ. Lendisá basakoli nyonso bámeka kosala bongo.
Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisolo na bayangani. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 2005, lokasa 6.
Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Lisolo na bayangani. Na miniti moko to mibale, lobelá masolo ya bazulunalo yango oyo ekoki kosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, poná masolo mibale to misato, mpe bótalela ndenge oyo bokoki kolakisa yango. Mpo na kosala yango, sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakotánga. Lokola Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ ezali nimero sipesiale, sɛngá bayangani báyebisa soki zulunalo yango ekosepelisa banani mpe ndenge nini tokoki kosala mpo tókabola yango na bato ebele. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko. Soki bazulunalo ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ezali te, bósalela bazulunalo mosusu oyo bouti kozwa na lisangá.
Loyembo 41 mpe libondeli