Manaka mpo na pɔsɔ ya 9 Mai
PƆSƆ EBANDI NA 9 MAI
Loyembo 58 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 12 par. 1-7 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Nzembo 1-10 (Min. 10)
No. 1: Nzembo 7:1-17 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Soki moto alobi: “Nandimelá Yesu lokola mobikisi na ngai”—rs lok. 438 par. 5 (Min. 5)
No. 3: Mpo na nini Yesu asembolaki moto oyo abengaki ye “Moteyi Malamu”?—Mrk. 10:17, 18 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato. (Mis. 5:29) Lisolo na bayangani ekouta na Annuaire 2011 lokasa 219, paragrafe 4 tii na lokasa 221, paragrafe 2. Nsima ya kolobela lisolo mokomoko, sɛngá bayangani báyebisa mateya oyo bazwi.
Min. 10: Okoki kozala mobongisi-nzela mosungi na ntango ya konje? Lisolo na bayangani. Zongelá na mokuse masɛngami oyo ezali na buku Tobongisami, nkasa 112-113. Sɛngá bandeko oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi na ntango ya konje ya mosala to ya kelasi, báyebisa mapamboli oyo bazwaki.
Min. 10: “Tiká pole na bino engɛnga.” Mituna mpe biyano. Sɛngá bayangani báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango, oyo emonisi ete etamboli ya malamu efungolelaki bango nzela ya kopesa litatoli.
Loyembo 93 mpe libondeli