Manaka mpo na pɔsɔ ya 25 Ɔkɔtɔbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 25 ƆKƆTƆBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cf mok. 2 par. 15-20, etanda na lok. 23
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Ntango 12-15
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
□ Likita ya mosala:
Min. 8: Mayebisi. “Soki osengeli na mikanda nokinoki na monɔkɔ mosusu.” Lisukulu.
Min. 12: Bomoko oyo esangisi biso na bandeko ya mikili ndenge na ndenge ekumisaka Yehova. Lisukulu ekouta na buku Tobongisami, lokasa 165, paragrafe 3, tii na motó ya likambo ya moke na lokasa 168. Sɛngá bayangani mosusu bálobela masolo oyo ebimá na mikanda ya moombo ya sembo, oyo emonisi ndenge oyo bomoko mpe bolingo ya bandeko epesaki litatoli.
Min. 15: Zalá na elimo ya komipimela. (Luka 9:23) Lisolo ná bayangani, ekouta na Annuaire 2010, lokasa 45, paragrafe 1; lokasa 56, paragrafe 2; mpe lokasa 58, paragrafe 1, tii na lokasa 59, paragrafe 1. Nsima ya kolobela lisolo mokomoko, sɛngá bayangani bálobela makambo nini masolo yango eteyi bango.