Manaka mpo na pɔsɔ ya 12 Yuli
PƆSƆ EBANDI NA 12 YULI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 14 par. 10-14, etanda na nk. 164-165, apɛndisi na nk. 222-223
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 1 Bakonzi 9-11
No. 1: 1 Bakonzi 9:10-23
No. 2: Biblia epesi toli nini na likambo etali koluka biloko ya mokili mpe komɛla masanga mingi? (rs lok. 191 par. 4–lok. 192 par. 1)
No. 3: Ndenge oyo bakristo ya solosolo bamonisaka bwanya oyo euti na likoló (Yak. 3:17)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Osilá komeka yango? Lisolo elongo na bayangani. Zongelá na mokuse masolo oyo eutaki kobima na Mosala na biso ya Bokonzi: “Tózala na mokano ya kopesa mibali litatoli” (8/09), “Tozali Batatoli ngonga nyonso” (11/09), mpe “Yebá kosalisa ndeko oyo obimi na ye na mosala ya kosakola” (3/10). Sɛngá bayangani bálobela ndenge basalelaki batoli oyo ezali na masolo yango mpe matomba oyo bazwaki.
Min. 15: “Mosala oyo tosengeli kotya na esika ya liboso.” Ekosalema na mituna mpe biyano.