Manaka mpo na Pɔsɔ ya 14 Dɛsɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 14 DƐSƐMBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yosua 6-8
No. 1: Yosua 8:1-17
No. 2: Mai ebomi mokili—Ekoboma yango lisusu? (lr mok. 46)
No. 3: Mpo na nini toli oyo ezali na Mosakoli 7:21, 22 ebongi mpenza?
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Mpo na nini nabangaka koyebisa basusu bindimeli na ngai? Lisukulu ekouta na Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ–Desɛmbɛ 2009, nkasa 14-17. Bósala mpe elakiseli moko kati na yango baboti bazali kosalisa mwana na bango na ntango ya Losambo na kati ya libota, mpo ayeba ndenge ya koyanola na mituna oyo bakoki kotuna ye na kelasi. Bazali kosala bolukiluki na mikanda mpe kotalela moko ya mituna oyo ezali na lokasa 15, na nsima basɛngi na mwana ameka koyanola na motuna yango.
Min. 15: “Tósakola na molende!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Ntango bokokóma na paragrafe 4, sololá na mosakoli moko ya molende mpe tuná ye mituna oyo: Osalaki nini mpo makambo ezangi ntina ya mokili oyo ekómisa yo kilo te? Matomba nini ozwi mpo osakolaka na molende?