Manaka mpo na Pɔsɔ ya 23 Novɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 23 NOVƐMBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 4, bitanda na nk. 46-49
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 28-31
No. 1: Kolimbola Mibeko 30:1-14
No. 2: Ntina oyo tosengeli kosala mosala (lr mok. 42)
No. 3: Na kotalela Makomami, “ebele ya bato” bazali na elikya nini? (rs-F lok. 67 par. 2-4)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 5: Tómibongisa mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Yebisá masolo oyo ekosepelisa mpenza bato ya teritware na bino. Salisá elakiseli oyo ekomonisa mosakoli moko oyo ayebi koteya malamu azali kosalisa mosakoli ya sika amibongisa mpo na kokabola bazulunalo.
Min. 25: “Tóbosana te bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Nsima ya paragrafe 4, mosakoli moko asala elakiseli oyo ekozongela likanisi oyo epesami na lisolo yango.