Manaka mpo na Pɔsɔ ya 12 Ɔkɔtɔbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 12 ƆKƆTƆBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 3 par. 1-7, etanda na lok. 29
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Kolimbola Mibeko 4-6
No. 1: Kolimbola Mibeko 4:15-28
No. 2: Tókanisa Yehova mpe Mwana na ye (lr mok. 37)
No. 3: Ntango nini tokoki koloba ete bozwi moke eleki malamu? (Mas. 15:16)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Koyekola na bato Biblia. Lisukulu ekouta na buku Tobongisami, lokasa 98, paragrafe 1, tii lokasa 99, paragrafe 1. Sɛngá basakoli bálobela esengo oyo bayokaki ntango basalisaki moto moko ayekola solo.
Min. 10: Mokanda oyo tokokabola na Ɔkɔtɔbɛ. Bongisá bilakiseli mibale. Na elakiseli moko, mosakoli akotuna motuna oyo akopesa eyano ntango akozongela moto oyo asololi na ye. Elakiseli mosusu ekomonisa ndenge ya kobanda boyekoli ya Biblia na mbala ya liboso oyo tokutani na moto. Nsima ya elakiseli mokomoko, tuná bayangani bálobela na mokuse likanisi ya ntina oyo basimbi.
Min. 10: “Omibongisi mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu?” Ekosalema na mituna mpe biyano.