Tótosa oyo Makomami elobi ntango tolingi kokunda ebembe—Eteni 4
Ntango tokei na molulu ya kokunda ebembe oyo etambwisami na Batatoli ya Yehova te
1. Likambo nini tosengeli kobosana te ntango tolingi kokende na molulu ya kokunda ebembe oyo ezali kotambwisama na bato oyo bazali Batatoli te?
1 Ndenge lisolo “Mituna ya batángi” emonisaki yango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2002, kokende na molulu ya kokunda ebembe oyo ezali kosalema na boyokani na bindimeli ya lokuta, ezala na ndako-nzambe to na esika mosusu, ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Tosengeli kobosana te ete kosala molulu yango na ndako-nzambe ezali losambo, mpe mbala mingi makambo oyo bateyaka, na ndakisa molimo ekufaka te, bato nyonso ya malamu bakokende na lola, eyokani te na mateya ya Biblia. Na bamboka, mbala mingi soki moto akufi, bato balalaka libándá, bayembaka banzembo ya losambo, basambelaka bankɔkɔ, batumbaka mbeka ya banyama, basopaka masanga na mabelé mpe bongo na bongo.
2. (a) Mpo na nini moklisto oyo ndeko na ye akufi asengeli kokeba mpenza? Pesá bandakisa. (b) Moklisto asengeli kosala nini mpo amikɔtisa te na milulu ya kokunda ebembe oyo eyokani te na mateya ya Biblia?
2 Ekoki kosalema ete básɛnga bandeko ya mowei básangana na milulu yango. Na ndakisa, ntango tata ya moklisto moko oyo azali mwana ya liboso akufi, bandeko ya libota bakoki kosɛnga ye asala milulu oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. To mpe bakoki kosɛnga na ndeko mwasi oyo mobali na ye akufi asala makambo oyo bonkɔkɔ na bango esɛngaka. Na ntango wana, esɛngaka kozala ekɛngɛ mpenza mpo na kokwea na motambo te. Emonani polele ete tosengeli kozela te ete moto akufa naino na libota mpo tóyebisa bandeko na biso oyo bazali batatoli te bindimeli na biso. Soki bayebi bindimeli na biso liboso, ekozala mpasi te tótikala sembo na ntango wana ya mpasi mpe ya komekama.
3. (a) Mituna nini moklisto asengeli komituna soki amoni malamu akende kolela moto moko oyo azalaki Motatoli te? (b) Na boyokani na 1 Bakolinti 8:12, 13, likambo nini tosengeli komitungisa mingi mpo na yango koleka kobanga kosilikisa bandeko na biso oyo bazali Batatoli te?
3 Ezali boni soki moklisto moko amoni malamu akende kolela moninga moko ya mosala, ndeko ya libota to moto moko ya kartye oyo azalaki Motatoli te? Na ntango yango, asengeli komituna boye: ‘Soki nakei na esika wana oyo bato nyonso bakosala milulu ya losambo ya lokuta, nakokoka mpenza koboya kosala lokola bango? Nakobɛtisa bandeko mosusu ya lisangá libaku te soki nakei? (Mat. 18:6) Kozala na esika wana oyo bato bayebi te ntina oyo ngai naboyi kosangana na milulu wana ekolukela ngai mindɔndɔ te?’ Tóbosana mpe te ndenge lisosoli na biso ekoki kotungisama soki tokei na esika yango. Tótala kaka te litomba ya kokende kuna, kasi tómona mpe oyo yango ekoki kosala na lisosoli na biso moko mpe lisosoli ya basusu.—Talá mpe 1 Bakolinti 8:12, 13.
4. (a) Soki ndeko moko amoni ete kokende na esika yango ekotinda ye abuka mibeko ya Nzambe, asengeli kosala nini? (b) Ntango nini bandeko mosusu bamonaka malamu kokende kotala libota oyo ekweli makambo mpo na kosunga mpe kobɔndisa bango? Mpo na nini?
4 Ezali boni soki omoni ete kokende na esika yango ekoki kotinda yo osala makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia, kobɛtisa basusu libaku to mpe kobimisela yo mindɔndɔ na bato oyo bazali baklisto te? Makambo wana ekoki kotinda moklisto aboya kokende na esika ya ndenge wana. Soki moklisto moko amoni malamu akende te, moto moko te na lisangá asengeli komona mabe to kobɛta libaku mpo na ekateli oyo azwi. Bato mosusu bamonaka malamu kokende kotala libota oyo ekweli makambo liboso ebembe eya to nsima ya kokunda ebembe. Na ntango yango, bato ya libota oyo ezali na mawa bakoki kozala mwa kimya mpe kondima koyoka oyo Biblia elobi. Kopesa bango mbongo na ntango wana ekosalisa nde bango moko. Koyeba kopona ntango oyo tokoki kosunga mpe kobɔndisa bango ekobatela biso na elimo mpe lisungi na biso ekosalisa bango mpenza.
5. (a) Bato mingi bamonaka esika ya lilaka lokola nini? (b) Mpo na nini bato mosusu balingaka kozanga te na matánga?
5 Kebá na makama: Bato mingi bamonaka esika ya lilaka lokola esika ya fɛti, epai bazalaka na libaku ya kokutana na bato oyo bamoná kala, kolya bilei mpe komɛla masanga oyo mbala mingi bapesaka na bisika ya ndenge wana. Mpo na bango, likambo eleki ntina ezali nde komona bato mpe komonana na esika yango. Yango wana, soki bakei te, bamonaka ete bato ya libota oyo ekweli makambo bakosepela te. Bamosusu kutu bakanisaka ete soki bazali kokende te ntango baninga bakufi, mokolo bango bakokufa bato bakoya te! Yango wana, tomonaka mbala mingi ete na pɔsɔ moko moto akoki kokende na matánga misato to koleka. Bakendaka ata soki bayebi moto oyo akufi te to mpe bayebani na bandeko na ye te. Kosala ndenge wana eyokani mpenza na makanisi ya Nzambe?
6. (a) Tángá Baefese 5:15, 16. Likama nini ya elimo ekoki kokómela biso soki tozali kokende mingi na bisika ya lilaka? (b) Mpo na nini ezali likambo ya bwanya te kotinda moto moko ya libota akende ye moko na lilaka?
6 Biso basaleli ya Yehova tosengeli koyeba likama oyo ekoki kokómela biso na elimo soki tozali kokende mingimingi na esika ya lilaka. Ekozala mpenza likambo ya bwanya soki tozali kolekisa mikolo nyonso ya pɔsɔ mpe ya lomingo na matánga mpe tozali kozanga ntango mpo na kobima na mosala ya kosakola mpe komipesa na makambo mosusu ya elimo? (Ef. 5:15, 16) Lokola na bisika mingi ya lilaka bato ya mokili basalaka makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia, na ndakisa kolangwa masanga mpe pite, tokoki komituna boye: ‘Ekozala mpenza likambo ya bwanya kokende na esika yango ngai moko to kotinda molongani na ngai to moto mosusu ya libota na ngai na lilaka ye moko na mboka to na engumba moko ya mosika?’ Biso nyonso tosengeli kokeba na makama ya komikɔtisa na milulu ya kokunda ebembe oyo esepelisaka Yehova te, mpo yango ekoki kozongisa biso nsima na elimo mpe kobebisa etamboli na biso.—Emon. 18:4.
7. Ndenge nini bandeko mosusu batosaki te toli oyo ezali na Masese 22:3?
7 Baklisto mosusu bakebaki te na makama yango mpe bakómaki na etamboli ya mabe. Bamosusu babungisaki mikumba na bango na lisangá, mpe bamosusu babimisamaki na lisangá. Biblia epesi toli oyo: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Mas. 22:3, NW) Soki tobosani toli wana te mpe tokanisi malamu makama oyo ekoki kokómela biso na esika ya ndenge wana, tokoyeba soki tokoki kokende to te na lilaka oyo ezali ya Batatoli te.
8. (a) “Moziki” ezali nini? (b) Mpo na nini ebongi te baklisto bákɔtaka na moziki?
8 Na bisika mosusu, bato bakɔtaka na moziki. Mbala mingi, moziki yango esangisaka bato ya mboka to monɔkɔ moko, to mpe baninga ya mosala. Batyaka mbongo na kɛsi mpo na kokundaka bibembe ya bato ya moziki na bango. Soki moninga na bango moko akufi, bango nyonso basengeli kozala wana mpe kobimisa mbongo. Okanisi ete ekozala mpenza likambo ya bwanya kokɔta na moziki ya ndenge wana? Na mboka moko, ndeko mwasi moko akɔtaki na moziki moko ya ndenge wana mpe baboti na ye bayebaki te. Ntango akufaki, baninga na ye ya moziki bayaki ebele mpe babandaki kobɛta mbonda, koyemba, mpe kobina. Libota ya ndeko mwasi balukaki kopekisa bango, kasi bakokaki te; mobulu ekɔtaki mpe baboti ná baklisto mosusu oyo bazalaki wana bapɔlaki na nsɔni. Soki toyebi ete kozala moninga ya bato oyo bayebi Yehova te ekoki kobebisa elimo na biso, tokomona ete ezali bozoba komikɔtisa na moziki ya ndenge wana.—1 Kol. 15:33.
Toli ya Makomami ebongi mpe ezali polele
9. (a) Ndenge nini 1 Bakolinti 10:21 emonisi ete komikɔtisa na milulu oyo bapakano basalaka na matánga ezali likambo ya kozwa na lisɛki te? (b) Nini ekokómela moklisto soki alandi te toli oyo epesami na Mosala na biso ya Bokonzi mpe amikɔtisi na milulu ya kokunda ebembe ya bapakano? (c) Tángá Deteronome 18:9-13; Yilimia 7:16-19. Yehova ayokaki ndenge nini ntango Bayisalaele bakómaki mpe kosala makambo ya ndenge wana?
9 Na 1 Bakolinti 10:21, Biblia elobi boye: “Bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.” Basaleli ya Nzambe bazwaka toli wana na lisɛki te. Ezali boni soki ndeko moko amikɔtisi na milulu ya kokunda ebembe oyo eyokani te na mateya ya Biblia mpo bandeko na ye to bato ya kartye batye ye mpanzi likoló? Soki ndeko yango amikɔtisi na losambo ya bikeko to asangani na losambo ya lokuta, yango ekozala lipɛngwi, mpe bankulutu bakozwa ekateli oyo esengeli mpo lisangá etikala pɛto.—Det. 18:9-13; Yil. 7:16-19.
10. (a) Na boyokani na Nzembo 97:10, ndenge nini tosengeli kotalela mimeseno nyonso oyo euti na liteya oyo elobaka ete bawei bazali na bomoi? (b) Ndenge 1 Bakolinti 10:32, 33 emonisi yango, ntina nini tosengeli mpenza koboya mimeseno ya ndenge wana?
10 Tózalaka na bokatikati: Nini ekosalisa biso tózala na bokatikati na ntango ya liwa mpe ntango bato bazali kosala milulu oyo tolobeli awa? Tosengeli kolinga Yehova makasi mpenza mpe ‘koyina oyo ezali mabe.’ (Nz. 97:10, NW) Tosengeli kokɔtaka ata moke te na milulu oyo eyokani na liteya oyo elobaka ete bawei bakoki kosala biso mabe to kosalisa biso. Lisusu, lokola tolingaka bato mosusu makasi, tokoboya kosala likambo nyonso oyo ekoki kobɛtisa bandeko na biso libaku to kotungisa lisosoli na bango.—1 Kol. 10:32, 33.
11. (a) Na boyokani na Baefese 5:8, makanisi nini basaleli ya Nzambe basengeli kozala na yango te? (b) Ndenge nini toli ya 1 Batesaloniki 4:13 esengeli kotambwisa biso ntango tokei na esika ya matánga?
11 Boyebi oyo tozali na yango mpo na bakufi esalisaka biso tóboya makanisi mpe bizaleli ya bato oyo bazali na molili ya elimo. Na ndenge yango, tokolanda te bato oyo bakambaka milulu ya kokumisa mowei mpe balakisaka na lolendo nyonso bozwi na bango mpe basalaka makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Tokotika te ete milulu ya kolela ebembe epekisa biso komipesa na makambo ya elimo. Tosengeli mpe te kolekisa ndelo mpe kosilika ntango ndeko moko azwi ekateli ya kokende te na molulu moko ya kolela ebembe to mpe abengi biso te ntango akweli makambo. Baklisto ya solo bakanisaka mpe basalaka makambo lokola bato ya mokili te, mpo bayebi solo ya Biblia. (Ef. 5:8) Tolelaka mpe tokundaka bandeko na biso na ndenge ya lokumu, oyo eyokani na mateya ya Biblia, mpe kozanga kolekisa ndelo.—1 Tes. 4:13; 5:5, 8, 11.
12. (a) Tángá 1 Petelo 4:4. Likambo nini toyebaka ete tokokutana na yango ntango toboyi kolanda mimeseno oyo eyokani te na mateya ya Biblia? (b) Na boyokani na Masese 29:25, mpo na nini tosengeli te kotika ete kobanga bato etambwisa biso?
12 Kobanga bato te: Tolingaka kobɛtisa bato libaku te. Kasi, kaka ndenge misala malamu ya Yesu ezalaki kobɛtisa bato oyo bayebaki solo te libaku, biso mpe tokozanga te kobɛtisa basusu libaku mpo tokangami na losambo ya solo. (Yoa. 6:60, 66) Bato bakoki kotɔnga, kofinga, konyokola, ata mpe koyina biso mpo toboyi kokɔta na milulu ya bapakano. (1 Pet. 4:4) Baboyaki kopesa Batatoli mosusu libula, kosunga bango mpe baboyaki bango mpo bakangamaki na oyo ezali malamu. (Yoa. 15:19) Bazwelaki bamosusu kutu makanisi mabe mpe bakómaki koloba ete balingaka bato te mpe batosaka bawei te. Atako yango ezali likambo ya esengo te, toyebi ete tosengeli kokutana na yango, mpo tokeseni na bato ya mokili. (2 Tim. 3:12) Na yango, na esika ya kobanga bato, tobangaka nde Yehova Nzambe mpe tolukaka kosepelisa ye.—Mas. 29:25; Mis. 5:29.
13. (a) Likambo nini bato mosusu balobaka na Batatoli ya Yehova? (b) Motambo nini tosengeli kokeba na yango, mpe ndakisa nini Yesu atikelá biso na likambo yango?
13 Tiká bámona bokeseni: Bato mosusu basɛkaka biso mpe balobaka ete “Batatoli ya Yehova bayebaka kokunda bibembe na bango te.” Maloba ya ndenge wana etungisaka biso? Tolukaka ntango mosusu kolakisa bango ete biso mpe toyebi kokunda bibembe? Tóbosana te ete ntango Satana alobaki na Yesu amibwaka na nse mpo na kolakisa ete azali Mwana ya Nzambe, Yesu aboyaki. Aboyaki kosala likambo moko ya mabe kaka mpo basusu bándima ye. (Mat. 4:5-7) Ndenge moko mpe, tosengeli te komekola bato oyo bayebi Yehova te ntango tozali kokunda bibembe na biso kaka mpo na kolakisa ete biso mpe toyebi. Ndenge nini tokoki kokwea na motambo ya komekola bango?
14. (a) Lisumu nini ya monene mpenza Bayisalaele basalaki? (b) Na boyokani na Exode 32:28, nini emonisi ete makanisi na bango eyokanaki na oyo ya Yehova te, mpe nini ekomelaki bango?
14 Motatoli ya Yehova akolinga te kosangana na milulu ya kokunda ebembe oyo eyokani te na mitinda ya Biblia. Kasi, soki tokebi te, tokoki kokwea na motambo oyo libota ya Nzambe bakweaki na yango na ntango ya kala. Tóbosana te ete Bayisalaele basalaki mwana-ngɔmbɛ mpo na kosambela yango, mpe babengaki libaku yango “fɛti mpo na Yehova.” (Ex. 32:5, NW) Bamikosaki mpenza ndenge bakanisaki ete Nzambe akondima ndenge basangisaki losambo ya solo na oyo ya lokuta! Yehova asilikaki makasi mpo na likambo yango mpe Bayisalaele soki 3 000 bakufaki.—Ex. 32:28.
15. (a) Tángá Bagalatia 6:12 mpe Deteronome 12:30. Likambo nini basaleli ya Nzambe basengeli koluka kosala te, mpe mpo na nini? (b) Na boyokani na 1 Bakolinti 10:20, ndenge nini baklisto ya solo basengeli kotalela mimeseno yango ata soki balongoli makambo mosusu oyo bapakano basalaka? (c) Na boyokani na Malaki 3:18, likambo nini bato mosusu bakomona soki tokangami kaka na oyo ezali malamu mpe, na mpiko nyonso, tozali kolanda oyo Makomami elobi ntango tozali kokunda bawei na biso?
15 Basaleli ya Nzambe basengeli te koluka kokɔtisa na losambo ya solo milulu lokola kolala libándá, kosala mwa fɛti nsima ya kokunda mowei, kosala fɛti mbula na mbula mpo na kokanisa mokolo oyo mowei akufaki, mpe milulu mosusu ya mabe. Atako yango ekoki “komonana malamu” na miso ya bato oyo bazali Batatoli te, bato yango bakoki kokanisa ete Batatoli ya Yehova mpe bakómi kosala milulu wana ya bapakano na ndenge na bango. (Gal. 6:12; Det. 12:30) Nzokande, toyebi ete milulu yango ebebisaka nkombo ya Nzambe, ezali ya bapakano mpe eyokani te na losambo ya solo. (1 Kol. 10:20) Soki tobosani likambo wana te, tokosalisa bato ‘bámona bokeseni kati na moyengebene ná moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asaleli ye te.’—Mal. 3:18, NW.
16. (a) Wapi bilaka kitoko oyo tozali kolikya ete ekokokisama mosika te? (b) Biso nyonso tosengeli kozala na ekateli nini?
16 Etikali moke liwa ekozala lisusu te. Mpisoli na biso, mawa, mpe mpasi oyo toyokaka ekosila ntango Yehova akosekwisa bandeko na biso nyonso oyo bakufá. (Emon. 21:4) Nzokande, elikya na biso ya komona lisusu bandeko na biso oyo bakufá ekokokisama kaka soki totikali sembo. Ntango tozali kozela kokokisama ya bilaka kitoko wana, tosengeli kosala makasi mpo tózala na litɔnɔ to mbeba te na miso ya Yehova, mpe tókabwana mpenza na mokili oyo mabe ná misala na yango oyo ebebisaka lokumu ya Nzambe!—2 Pet. 3:14.