Manaka mpo na Pɔsɔ ya 29 Yuni
PƆSƆ EBANDI NA 29 YUNI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Levitike 14-16
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Ndenge ozali komonana na miso ya bato—Mpo na nini ezali na ntina? Lisolo elongo na bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 131-134.
Min. 10: Poná masolo ya Biblia mpo na “bato ya ndenge nyonso.” (1 Kol. 9:22) Lisolo elongo na bayangani. Ntango ozali kotuna bayangani mituna oyo elandi, sɛngá bango báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango. Masolo nini bamonaki ete esepelisaki mingi bilenge to mikóló, mibali to basi, bato ya lingomba moko boye? Ndenge nini tokoki kosalela buku Comment raisonner mpo na kopona masolo oyo ekosepelisa bato ya ndenge nyonso? Ndenge nini tokoki kobongola lisolo soki moto alingi tókɔta na lisolo mosusu?
Min. 10: Mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto. Yebisá mikanda oyo tokolakisa na basanza yango. Bósala bilakiseli mibale to misato mpo na komonisa ndenge malamu ya kolakisa mikanda yango na teritware na bino.