Manaka mpo na Pɔsɔ ya 23 Marsi
PƆSƆ EBANDI NA 23 MARSI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Genese 47-50
No. 1: Genese 48:1-16
No. 2: Tosengeli nde kobangaka Zabolo?
No. 3: Baanzelu ya Nzambe basalisaka biso (lr mok. 11)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 20: “Tótosa oyo Makomami elobi ntango tolingi kokunda ebembe—Eteni 2.” Kolata mpili. Paragrafe 1 tii 9. Nkulutu moko akosala yango na mituna mpe biyano. Akosalisa bayangani na boboto mpenza bámona ete lisolo yango eyei na ntango ebongi. Bendá likebi na mitinda oyo etali likambo yango.
Min. 10: Koyoka na likebi moto oyo ozali kosolola na ye mpe kotalela likanisi na ye, ekomonisa ete ozali komemya ye. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 186-187. Salá elakiseli mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kolanda toli yango ntango tozali kosolola na moto. Nsima ya elakiseli, sɛngá bayangani báyebisa makambo oyo esalisi mosakoli asolola na moto yango malamu.