Nsango ya esengo mpo na mosala ya kosakola
Congo-Kinshasa: Na sanza ya Sɛtɛmbɛ, tolekisaki ngonga 2 555 644 na mosala ya kosakola nsango malamu. Oyo nde loyembo kitoko ya masanzoli! Longola yango, masangá ya sika 8 esalemaki kobanda mwa 1 Sɛtɛmbɛ 2008.
Congo-Brazzaville: Tobandaki mobu ya sika ya mosala 2009 na basakoli 5 344, oyo elakisi bokoli ya 8% koleka mobu eleki. Yango elimboli ete pene na basakoli nyonso basanganaki na mosala ya kosakola. Topesi longonya na bandeko mibali mpe basi wana nyonso!