Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/09 lok. 12
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 2/09 lok. 12

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato oyo basepelaka na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu, kasi babandi naino te koyangana na makita nyonso ya lisangá, tósala makasi mpo na kotikela bango buku Biblia eteyaka mpenza nini? Mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola na bango Biblia na lisalisi ya buku yango.

◼ Mokomeli ya lisangá mpe mokɛngɛli na mosala ya kosakola basengeli kotalela mosala ya babongisi-nzela nyonso ya sanza na sanza. Soki moko na bango azali na mokakatano ya kokokisa bangonga, bankulutu basengeli kozwa bibongiseli mpo na kosalisa ye.

◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2009 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ezali na motó ya likambo “Nzambe andimaka mangomba nyonso?” Talá liyebisi oyo elobeli lisukulu yango na Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2008.

◼ Baformilɛrɛ mingi ezali naino na maloba ‘mokɛngɛli-mokambi.’ Atako kobanda na 1 Yanuali 2009, tokobanda kosalela maloba ‘mokambi-misala ya bankulutu,’ tokokoba kosalela baformilɛrɛ wana tii ntango ekosila nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto