Manaka mpo na Pɔsɔ ya 19 Yanuali
PƆSƆ EBANDI NA 19 YANUALI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Genese 11-16
No. 1: Genese 14:1-16
No. 2: Moto oyo asalaki biloko nyonso (lr mok. 3)
No. 3: Ndenge nini Yehova abongisaka biso? (Yis. 64:8)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Lendisá bandeko nyonso ya lisangá bábongisa lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Oyebi mayele nini okopona?” mpo na pɔsɔ ekoya. Poná mayebisi oyo etali lisangá na mayebisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 10: Bangá Nzambe ya solo mpe tosá mibeko na ye. Lisukulu ya kolendisa ekosalema na nkulutu moko, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 272 tii na lokasa 273, paragrafe 1.
Min. 10: Mokanda oyo tokolakisa na sanza ya Febwali. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na mokanda oyo tokolakisa, mpe sɛngá bandeko básala elakiseli moko to bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kolakisa yango.
Min. 10: “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.”a Monisá ete buku yango ezali na bitanda, bafɔtɔ, mpe mituna oyo ezali kotinda motángi amitalela. Lendisá bandeko nyonso ete báyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ mpe bápesaka biyano ntango tokoyekola buku yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.