Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/08 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Desɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Yanuali 2009
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 12/08 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Desɛmbɛ

Loyembo 19

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na lokasa 6, mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya Desɛmbɛ. Soki ezali te, salelá bazulunalo oyo bozwi sika. Sɛngá bandeko oyo bakabolaki bazulunalo yango báyebisa ndenge oyo basalaki mpo na kolakisa yango. Lisolo nini, motuna nini, mpe vɛrsɛ nini basalelaki?

Min. 15: Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2009. Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lobelá makanisi oyo etali mpenza lisangá na bino, kati na oyo bapesi na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2008. Limbolá mokumba ya mopesi-toli mosungi. Lendisá bayangani nyonso básalaka makasi mpo na kosala malamu masolo oyo bazwaka, kopesa makanisi na lisolo ya Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia, mpe kosalela toli oyo epesamaka pɔsɔ na pɔsɔ na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.

Min. 20: “Osalelaka buku Comment raisonner?”a Ntango bokokóma na paragrafe 4, sɛngá mobongisi-nzela moko to mosakoli moko ya makoki asala elakiseli ya mokuse mpo na komonisa ndenge ya kosalela buku Comment raisonner na mosala ya ndako na ndako to mpo na koyanola na motuna oyo: ‘Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Noele te?’

Loyembo 6

Pɔsɔ ebandi na 15 Desɛmbɛ

Loyembo 178

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 10: Ntango ozali kosakola, zongeláká makambo. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 207. Monisá na mokuse ndenge ya kozongela likanisi moko to makanisi mibale oyo ezali na lisolo yango.

Min. 25: “Ntango ozali kosakola, osalelaka makambo oyo oyekolaki?” Lisolo elongo na bayangani. Bótalela lisusu malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2007, nkasa 26 tii na 30, na lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Tómekola Moteyi Monene.” Bóbanda na paragrafe 4 tii na 16. Bósala elakiseli moko na makanisi oyo ezali na paragrafe 13 mpe 16.

Loyembo 157

Pɔsɔ ebandi na 22 Desɛmbɛ

Loyembo 75

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Yanuali, mpe sɛngá nkulutu moko asala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kolakisa yango.

Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo tozwi sika. Lisolo elongo na bayangani. Nsima ya kolobela na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango, sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino, mpe mpo na nini. Fungolá bisika masolo yango ezali, mpe sɛngá bayangani bálobela mituna nini bakoki kotuna moto mpo na kolakisa masolo yango mpe bavɛrsɛ nini oyo ezali na masolo yango, bakoki kotángela bato liboso ya kopesa bango bazulunalo. Mpo na kosukisa, molobi akosalela makanisi ya kobanda lisolo oyo bapesi na lokasa 6 to makanisi mosusu oyo ebongi na bato ya teritware na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo yango.

Min. 20: “Mokolo oyo tokoluka kaka bato ya koyekola na bango Biblia.”b Yebisá mokolo nini ya pɔsɔ to ya lomingo oyo lisangá na bino ekobima mpo na koluka kaka bato ya koyekola na bango Biblia na sanza ya Yanuali. Zongelá makanisi oyo ezali na paragrafe 3 mpe bósala elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kobanda koyekola na bato Biblia.

Loyembo 133

Pɔsɔ ebandi na 29 Desɛmbɛ

Loyembo 60

Boyekoli ya Biblia na lisangá:

ip-1 Mok. 12 par. 1-13

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: Emoniseli 15-22

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Likita ya Mosala:

Loyembo 153

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 10: Mituna ya batángi: “Motatoli ya Yehova akoki kokende na libala ya ndeko to moninga na ye moko oyo azali Motatoli te?” (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2007, lokasa 31.) Nkulutu moko akosala lisolo yango elongo na bayangani mpe akobimisa mitinda oyo esimbi likambo yango.

Min. 20: “Mosala ya kosakola esɛngaka koyika mpiko.”c Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Loyembo 155

Pɔsɔ ebandi na 5 Yanuali 2009

Loyembo 35

Boyekoli ya Biblia na lisangá:

ip-1 Mok. 12 par. 14-24

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: Genese 1-5

No. 1: Genese 3:1-15

No. 2: Ntina oyo Yesu azalaki Moteyi Monene (lr mok. 1)

No. 3: Nini ezali mpamba te? (1 Kol. 15:58)

Likita ya mosala:

Loyembo 98

Liyebisi: Esengeli te kotalela lisolo oyo elobeli liyangani ya etúká liboso ya pɔsɔ ya 5 Yanuali. Masangá esengeli te kosala Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 5 Yanuali liboso ya dati yango, longolá kaka masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala yango.

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 10: Tómekola ndenge oyo Yesu azalaki kotalela mosala ya kosakola. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku “Yaká, landá ngai,” nkasa 84-86, paragrafe 16-21 (na Lifalanse).

Min. 20: “Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2009.”d Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Liboso ya kotalela lisolo oyo, tángá mokanda ya biro ya 15 Novɛmbɛ 2008, oyo eyebisi liyangani ya etúká oyo lisangá na bino ekokende. Monisá ntina oyo tosengeli komonisaka mbuma ya elimo ntango nyonso.​—Gal. 5:22, 23.

Loyembo 114

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto