Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 13 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kampanye ya kokabola trakte ya sika, oyo ekobanda na mwa 20 Ɔkɔtɔbɛ, mpe lendisá basakoli nyonso oyo bazwi naino batrakte yango te bázwa yango. Lobelá na mokuse makanisi ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na lokasa 8 mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ. Lokola basakoli mingi bakabolaki bazulunalo yango na boumeli ya mwa bapɔsɔ, sɛngá bango bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango.
Min. 35: “Programɛ ya sika ya Makita ya lisangá.”a Soki ngonga ezali, tángá bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te mpe sɛngá bayangani bálimbola yango.
Pɔsɔ ebandi na 20 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá, oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 20: Ndenge ya kobatela esengo na mosala ya kosakola. Lisukulu ya kolendisa ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2005, nkasa 24-25, paragrafe 11-17. Sololá mpe na ndeko moko to bandeko mibale oyo basaleli Yehova bambula mingi. Nini esalisaki bango bábatela esengo ntango bakutanaki na bato oyo basepelaka na nsango malamu te?
Min. 20: Omibongisa mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya Novɛmbɛ. Nsima ya kolobela na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango, sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino, mpe mpo na nini. Sɛngá bayangani bálobela mituna nini bakoki kotuna moto mpo na kolakisa masolo yango mpe bavɛrsɛ nini oyo ezali na masolo yango, bakanisi kotángela bato liboso ya kopesa bango bazulunalo. Mpo na kosukisa, molobi akosalela makanisi ya kobanda lisolo oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu oyo ebongi na bato ya teritware na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo yango.
Pɔsɔ ebandi na 27 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá.
Min. 10: Bamposa ya lisangá
Min 30: “Ezali na ntina mingi tóyekolaka Biblia biso moko mpe na libota!”b Soki ngonga ezali, tángá bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te mpe sɛngá bayangani bálimbola yango.
Pɔsɔ ebandi na 3 Novɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ.
Min. 20: Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2009. Lisolo elongo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Ekolobela programɛ ya sika ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, ndenge ezali na “Malako” oyo ezali na Programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Lobelá mingi mbongwana oyo esalami. Lendisá bayangani nyonso básalaka masolo na bango malamu, bámibongisaka mpo na kopesa biyano na Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia, mpe básalela batoli oyo mokɛngɛli na eteyelo apesaka pɔsɔ na pɔsɔ, oyo eutaka na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.
Min. 15: Kolisá “mayele na yo ya koteya.” Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola to na nkulutu mosusu ya makoki. Akolobela makambo mitano ya ntina oyo esalisaka moto ateya malamu, ndenge emonisami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2008, nkasa 9-12, paragrafe 5-18. Sololá na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bamoni ete makanisi wana esalisi bango bábongisa ndenge na bango ya koteya.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.