Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/08 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Ɔkɔtɔbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 9/08 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 204

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Sɛngá bayangani bálobela masolo ya bazulunalo oyo euti kobima, oyo esepelisaki bato ya teritware na bino. Sɛngá bango mpe bálobela mituna nini mpe bavɛrsɛ nini basalelaki mpo na kolakisa bato masolo yango. Salá bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa mokomoko ya bazulunalo yango.

Min. 15: Salisá bayekoli ya Biblia bákóma bateyi. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2007, nkasa 29-30, paragrafe 14-20. Salá mpe elakiseli moko ya mokuse oyo ekomonisa mosakoli azali kolimbwela moyekoli ya Biblia ndenge lisukulu ya bato nyonso mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalemaka.

Min. 20: Tokoki kosala nini ntango tokutani na bato oyo bakaniselaka biso mabe? Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na makambo oyo ezali na mikanda ya moombo ya sembo, oyo emonisi ndenge makambo mabe oyo bato bakaniselaka biso ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela mosala ya kosakola. Limbolá ndenge ya kosala ntango tokutani na bato oyo bakaniselaka biso mabe. Na bantango mosusu, etamboli na biso, ezala na mosala ya kosakola to ntango tozali kosala makambo mosusu, ekoki kotinda bato bátika kokanisela biso mabe mpe bándima mateya ya solo. Na bongo, tosengeli ntango nyonso kokeba na maloba mpe na etamboli na biso. (1 Pet. 2:12; 3:1, 2) Sɛngá ndambo ya basakoli bálobela makambo oyo bakutanaki na yango, oyo emonisi ndenge ya kolonga makanisi mabe oyo bato bazalaka na yango mpo na biso, to salelá masolo ya bandeko oyo ezali na mikanda na biso.

Loyembo 127

Pɔsɔ ebandi na 15 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 94

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 20: Ndenge nini tosalaki mosala na mbula eleki? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola to na nkulutu mosusu ya makoki. Lobelá ndenge mosala ya kosakola esalemaki na mbula eleki, bendá likebi mingi mpenza na makambo ya kolendisa oyo basakoli basalaki. Pesá longonya oyo ebongi. Bongisá liboso mpo mosakoli moko to basakoli mibale bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na mbula eleki. Lobelá likambo moko to makambo mibale oyo lisangá basengeli kobongisa na mbula ekoya, mpe pesá makanisi mpenza oyo bakoki kosalela mpo na kokokisa mokano yango.

Min. 15: Ndenge nini nakoki kolimbwela basusu ntina oyo nandimaka ete Mozalisi azali? Lisukulu ekouta na mikanda ya moombo ya sembo. Sɛngá bayangani bámonisa ndenge oyo balimbwelaki basusu, na kelasi, na mosala, to na bisika mosusu, ntina oyo bandimaka ete Mozalisi azali. Okoki kobongisa liboso elongo na mosakoli moko to basakoli mibale mpo báyanola na motuna yango.

Loyembo 51

Pɔsɔ ebandi na 22 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 104

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salá lisolo elongo na bayangani na mokanda ya biro, oyo ezali na lokasa 1.

Min. 20: Okozwa mbano ya mosala na yo. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2005, lokasa 28, paragrafe 5, tii na nsuka ya lokasa 29. Sololá na mokuse na mosakoli moko to basakoli mibale ya molende, bálobela ndenge oyo Yehova asalisaka bango bákokisa bamposa na bango ya mosuni to abɔndisaka bango.

Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango mpe sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino. Mituna nini mpe bavɛrsɛ nini bakoki kosalela mpo na kobanda lisolo? Monisá ndenge ya kosalela makanisi ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi. Sɛngá nkulutu moko asala elakiseli ya mokuse na lisolo moko oyo ekosepelisa bato ya teritware na bino.

Loyembo 190

Pɔsɔ ebandi na 29 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 45

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Sɛtɛmbɛ. Bongisá liboso mpo mosakoli moko to basakoli mibale bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bapesaki litatoli ya libaku malamu na mikolo ya liyangani ya etúká, na eleko ya konje, to na mabaku mosusu, na sanza ya Yuli mpe ya Augusto.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Kobanda mokolo ya 20 Ɔkɔtɔbɛ tii 16 Novɛmbɛ, tokosala kampanye monene ya kokabola trakte!”a Soki batrakte yango esili kokóma na lisangá na bino, pesá bayangani nyonso trakte mokomoko. Ntango bokotalela paragrafe 2, lobelá na mokuse makambo oyo ezali na trakte yango. Ntango bokotalela paragrafe 4, monisá ndenge ya kopesa moto trakte yango. Ntango bokotalela paragrafe 5, salá elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli azali kosalela trakte ntango azongeli moto mpo na kobanda koyekola na ye Biblia.

Loyembo 9

Pɔsɔ ebandi na 6 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 15

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Lisolo elongo na bayangani. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2005, nkasa 20-22, paragrafe 10-16.

Min. 20: “Teyá basusu bálinga Yehova.”b Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Loyembo 132

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto