Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/08 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 8/08 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi​—⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Nzela ya bomoi ya seko​—⁠Osili komona yango?; Osengeli kondima Trinité?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Sɛtɛmbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia.Ɔkɔtɔbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango, na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato oyo tokei kotala bazali na buku yango, tokomonisa bango na mokuse ndenge boyekoli esalemaka mpo na kosalisa bango bázwa matomba na buku yango. Novɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia.

◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2009, Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—⁠2009, mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah​—⁠2009 na komande oyo bakosala mbala ekoya. Liste ya minɔkɔ oyo mikanda yango ekobima, ekotyama na “Avis à toutes les congrégations,” oyo etindamaka na masangá nyonso sanza na sanza.

◼ Bankulutu basengeli kobosana te kolanda malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991, nk. 21-23, oyo etali moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to amilongolaki ye moko, kasi azali na mposa ya kozonga na lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto