Bozongeli ya Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Augusto 2008. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 7 Yuli tii na pɔsɔ ya 25 Augusto 2008.
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali makambo makasimakasi te ntango tozali koyebisa bato solo? (Filp. 4:5) [be lok. 251 par. 3]
2. Ndenge nini mayele oyo Paulo asalelaki ntango alobaki na Bagrɛki na Ngomba Aleopaji ekoki kosalisa biso ntango tozali kopesa litatoli epai ya bato oyo bandimaka Biblia te? (Mis. 17:22, 23) [be lok. 252 par. 1-2]
3. Ata soki tomoni ete likambo moto oyo tozali kosolola na ye alobi ezali libunga, ndenge nini tokoki komonisa ye ete tozali makambo makasimakasi te? [be lok. 252 par. 5–lok. 253 par. 1]
4. Likambo nini tosengeli kobosanaka te ntango tozali kosala makasi tóndimisa bato makambo oyo tozali koloba? [be lok. 255 par. 3, etanda]
5. Ndenge nini tokoki kosalela bososoli mpo tósimba motema ya moto oyo azali koyoka biso? (Mas. 20:5) [be lok. 258 par. 1–lok. 259 par. 1]
LISOLO NO. 1
6. Makambo nini bandeko basi basengeli kobosana te ntango bazali kopona ndenge oyo bakosala lisolo na bango? [be lok. 44 par. 5-6]
7. Mokano nini bandeko mibali basengeli kozala na yango ntango bazali kosala lisolo ya Makanisi ya ntina na botángi ya Biblia? (Neh. 8:8) [be lok. 47 par. 2-3]
8. Ndenge nini ndeko mobali akoki kobongisa lisolo ya Likita ya Mosala oyo ekosɛnga kosala elakiseli to kotuna ndeko moko mituna? [be lok. 49 par. 6]
9. Ndenge nini mokanda ya Misala emonisi ndenge oyo litatoli esengeli kopesama? (Mis. 20:20, 21; 28:23) [si lok. 204 par. 35]
10. Ndeko oyo akosala lisukulu ya bato nyonso akoki kosala nini mpo Biblia nde esimba lisukulu na ye? (Mis. 17:2, 3) [be lok. 52 par. 6–lok. 53 par. 2]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Mpo na nini mokɛngɛli ya bolɔkɔ ya engumba Filipi alingaki “amiboma”? (Mis. 16:25-27) [w90 15/5 lok. 25, etanda]
12. Alisitake ná Gayusi basalaki nini ntango bakutanaki na minyoko? (Mis. 19:29; 20:4, 5) [w08 15/2 lok. 10 par. 16-17]
13. Maloba oyo ete Saulo azalaki “kobɛtabɛta makolo na nsɔngɛ ya mangenda” elimboli nini? (Mis. 26:14) [w03 1/10 lok. 32]
14. Na ndenge nini ‘lisumu ekokaki kozwa nzela’ na lisalisi ya komandema oyo Nzambe apesaki Yisalaele? (Lom. 7:8, 11) [w08 15/6 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mokanda ya Baloma”]
15. Ndenge nini tokoki ‘kotya makala ya mɔtɔ’ na motó ya monguna? (Lom. 12:20) [w08 15/6 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mokanda ya Baloma”]