Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/08 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 14 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 21 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 28 Yuli
  • Pɔsɔ ebandi na 4 Augusto
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 7/08 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 14 Yuli

Loyembo 126

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya Yuli, to zulunalo mosusu oyo bozali na yango.

Min. 15: Ozalaka na “elobeli ya polele”? Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2006, nkasa 13-16. Monisá ntina ya kosakola na mpiko.

Min. 20: “Omibongisa mpo na koyekola esakweli ya Yisaya!”a Lobelá makambo ya ntina ya buku yango. Lobelá programɛ ya boyekoli ya mokanda oyo ezali na lokasa 3 ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo. Lendisá bayangani nyonso bázangisaka te boyekoli yango mpe bápesaka biyano mingi. Sololá na mokuse na mosakoli moko to basakoli mibale oyo bayebani ete babongisaka makita malamu, tuná bango nini etindaka bango bámibongisaka.

Loyembo 147

Pɔsɔ ebandi na 21 Yuli

Loyembo 95

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Yebisá bayangani bámema Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli to ya 1 Augusto mpe Lamuká! ya Yuli to ya Augusto na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi mpe bámibongisa mpo na kolobela ndenge malamu ya kolakisa yango na teritware ya lisangá na bino.

Min. 15: Bamposa ya lisangá na likambo ya koyeba kotánga mpe kokoma. (Talá mokanda ya mwa 20 Aprili 2008)

Min. 20: “Ezali na ntina komibongisa mpo na kozongela bato na ndenge oyo ekobota mbuma.”b Salá mpe elakiseli ya ndeko moko azali kolobaloba ye moko, oyo ekoumela miniti minei. Elakiseli yango ekomonisa mosakoli azali komibongisa mpo na kozongela bato. Atali makambo oyo akomaki ntango asakolaki mbala eleki mpe azwi mokano ya kozongela bato mibale na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo. Na nsima, ataleli makambo oyo alobelaki ntango asololaki na mokomoko ya bato yango mbala eleki, amityeli mokano, mpe abongisi ndenge oyo akokokisa mokano yango ntango akozongela bango. Mpo na moto ya liboso, abongisi kozongela ye mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Mpo na oyo ya mibale, amibongisi mpo na kosalela makanisi oyo bapesi na paragrafe 5 mpo na kosalisa ye asepela lisusu mingi na nsango malamu.

Loyembo 189

Pɔsɔ ebandi na 28 Yuli

Loyembo 6

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Augusto, mpe salá elakiseli moko.

Min. 15: Tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga. Lisukulu ya kolendisa ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 2006, nkasa 18-19, paragrafe 17-21.

Min. 20: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo ya sika. Lisolo elongo na bayangani. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na Lamuká! ya Yuli to ya Augusto mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli to ya 1 Augusto. Na nsima, sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe mpo na nini. Sɛngá bayangani bálobela makanisi oyo bamoni na masolo oyo bazali kokana kolakisa na mosala ya kosakola. Motuna nini bakoki kotuna moto mpo na kobanda lisolo? Vɛrsɛ nini ya lisolo yango bakoki kotángela moto? Salelá makanisi ya kobanda lisolo oyo bapesi na Mosala na biso ya Bokonzi to oyo bayangani balobeli mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo yango.

Loyembo 106

Pɔsɔ ebandi na 4 Augusto

Loyembo 222

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Bana na yo babongisami mpo na kolonga mikakatano na eteyelo? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá ndambo ya mikakatano oyo bilenge baklisto bakutanaka na yango na eteyelo. Limbolá ndenge oyo baboti ná bana na bango bakoki kosalela Index des publications Watch Tower mpo na kozwa makanisi oyo ekosalisa bango. Pesá mwa bandakisa. (Talá motó ya likambo “École,” na motó ya likambo moke “rapports.”) Sɛngá bayangani oyo babɔkwamaki na mabota ya Batatoli bálobela ndenge oyo baboti na bango babongisaki bango mpo bálonga mikakatano mpe básalela mitinda ya Biblia na eteyelo. Bakoki mpe kolobela ndenge oyo basalelaki masolo oyo ebimaka na Lamuká! mpo na kosala badevuare ya kelasi. Sɛngá bango bálobela ndenge oyo kosakola na kelasi ebatelaki bango.

Min. 20: “Tozali kokweisa biloko oyo epikamá makasi.”c Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo basakoli oyo bateyaki bango Biblia basalisaki bango na motema molai nyonso mpo bátika mateya ya lokuta oyo bakangamaki na yango makasi.

Loyembo 83

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto